Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 11:37 - Mokanda na Bomoi

37 Kasi bamosusu kati na bango balobaki : — Ezali ye te oyo abikisaki mokufi miso ? Bongo ndenge nini akokaki te kosala ete Lazare akufa te ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 11:37
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Omonaki makambo ebele, kasi ozalaki na bokebi na yango te ; matoyi na yo efungwamaki, kasi oyokaki ata eloko moko te.


Tika ete Klisto, Mokonzi ya Isalaele, akita sik’oyo longwa na ekulusu, mpo ete tomona mpe tondima ! Bato oyo babakamaki elongo na Yesu na ba-ekulusu bazalaki mpe kofinga Ye.


Bato batelemaki wana, bazalaki kotala ; mpe bakambi batiolaki Ye, balobaki : — Abikisaki bato mosusu ; tika ete amibikisa ye moko, soki penza azali Klisto, Moponami ya Nzambe !


Moko kati na babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu atiolaki Ye : — Boni, ozali Klisto te ? Mibikisa yo moko mpe bikisa biso !


Marte alobaki na Yesu : — Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te !


Tango kaka Mari akomaki na esika oyo Yesu azalaki mpe amonaki Ye, amibwakaki na makolo na Ye mpe alobaki : — Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ