Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 11:33 - Mokanda na Bomoi

33 Tango Yesu amonaki Mari mpe Bayuda oyo bayaki elongo na ye kolela, ayokaki mawa makasi mpe amitungisaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 11:33
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yesu atalaki bango na mawa mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo ete mitema na bango ezalaki makasi lokola libanga. Yesu alobaki na moto yango : — Sembola loboko na yo ! Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebikaki.


Yesu alobaki na bango : — Ekeke ya bato bazanga kondima ! Kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino ? Bomemela Ngai mwana yango.


Bayuda mingi bayaki epai ya Mari mpe Marte mpo na kokabola mawa elongo na bango, mpo na kufa ya ndeko na bango.


Tango Bayuda oyo bazalaki elongo na Mari kati na ndako mpo na kokabola mawa elongo na ye, bamonaki Mari kotelema na lombangu mpe kobima libanda, balandaki ye, pamba te bakanisaki ete akei kolela na kunda.


Atunaki bango : — Bokundaki ye wapi ? Bazongisaki : — Nkolo, yaka kotala.


Lokola Yesu amitungisaki lisusu makasi, akendeki na kunda. Ezalaki kati na ebombamelo ya mabanga oyo, na ekotelo na yango, batiaki libanga moko ya monene.


Sik’oyo, molimo na Ngai etungisami ! Naloba nini ? Tata, kangola Ngai na tango oyo ya pasi ? Nzokande, ezali penza mpo na tango yango ya pasi nde nakomi kino na ngonga oyo !


Sima na Yesu koloba bongo, amitungisaki makasi kati na motema ; alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moko kati na bino akoteka Ngai.


Bosepelaka elongo na bato oyo bazali kosepela, mpe bolelaka elongo na bato oyo bazali kolela.


Pamba te tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akoki kosangana na bapasi na biso ; amekamaki kutu na makambo nyonso, ndenge biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ