Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 11:28 - Mokanda na Bomoi

28 Sima na Marte koloba bongo, akendeki kobenga Mari, ndeko na ye ; mpe wana abendaki ye pembeni, alobaki na ye na mongongo ya se penza : — Moteyi ayei, azali kobenga yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 11:28
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo wana, moko na moko kati na bino akobengisa moninga na ye mpo ete bavanda na se ya nzete ya vino mpe ya figi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Azongiselaki bango : — Bokende na engumba epai ya moto songolo mpe boloba na ye : « Moteyi alobi : ‹ Tango na Ngai ekomi pene ; nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai epai na yo. › »


Yesu atelemaki mpe alobaki : — Bobenga ye ! Bato babengaki mokufi miso yango mpe balobaki na ye : — Yika mpiko ! Telema ! Azali kobenga yo !


mpe, tango akokota na ndako, boloba na nkolo ndako yango : « Moteyi azali kotuna yo : ‹ Wapi shambre na Ngai epai wapi nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai ? › »


Mpe boloba na nkolo ndako : « Moteyi atuni : ‹ Wapi shambre epai wapi nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai ? › »


Akendeki kokutana na Simona, ndeko na ye, mpe alobaki na ye : « Tomoni Masiya  ! »


Filipo akutanaki na Natanaele mpe alobaki na ye : — Tomoni Yesu ya Nazareti, mwana mobali ya Jozefi, oyo Moyize alobela kati na buku ya Mobeko, mpe oyo basakoli balobela.


Mokengeli afungolelaka mobateli bameme ekuke, bameme eyokaka mongongo na ye. Mobateli abengaka bameme na ye na kombo na yango mpe abimisaka yango na libanda.


Tango Marte ayokaki ete Yesu azali koya, akendeki kokutana na Ye ; kasi Mari atikalaki ya kovanda kati na ndako.


Tango kaka Mari ayokaki bongo, atelemaki na lombangu mpe akendeki epai ya Yesu.


Nzokande, Yesu akotaki nanu te na mboka ; azalaki kaka na esika oyo Marte akutanaki na Ye.


Ndenge bobengaka Ngai « Moteyi » mpe « Nkolo, » bolobaka na bino penza ya solo, pamba te nazali penza Moteyi mpe Nkolo.


Yesu alobaki na ye : — Mari ! Mari abalukaki mpe alobaki na lokota ya Ebre : — Rabuni  !


Moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi alobaki na Petelo : — Bandeko, ezali Nkolo ! Tango kaka ayokaki ete ezali Nkolo, Simona Petelo akangaki nzambala na ye na loketo mpe amibwakaki na mayi, pamba te amilongolelaki bilamba mpo na koloba mbisi.


Yango wana, bolendisanaka mpe bosunganaka bino na bino, ndenge mpe kaka bozali kosala yango.


Yango wana, bolendisa maboko na bino, oyo ebandi kolemba mpe bokembisa mabolongo na bino, oyo ekomi kolenga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ