Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 11:24 - Mokanda na Bomoi

24 Marte azongiselaki Yesu : — Nayebi solo ete akosekwa, na mokolo ya suka, na tango bakufi bakosekwa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 11:24
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na ngai, sima na ngai kolonga, nakotala elongi na Yo ; sima na ngai kolamuka, nakosepela na komona Yo !


akolimwisa kufa mpo na libela. Nkolo Yawe akopangusa mpinzoli na bilongi nyonso, akolongola soni ya bato na Ye kati na mokili mobimba. Solo, Yawe alobi.


Kasi bato na Yo, oyo bakufa bakozonga lisusu na bomoi, bibembe na bango ekosekwa. Bino bato oyo bovandaka kati na putulu, bolamuka mpe boganga na esengo ! Pamba te mamwe na Yo ezali lokola mamwe ya tongo ; mabele ekopesa bomoi epai ya bakufi.


Nakokangola bango na bokonzi ya mboka ya bakufi, nakosikola bango na kufa. Oh kufa, wapi nguya na yo ? Oh mboka ya bakufi, wapi nguya na yo ya kobebisa ? Nakoyokela bango mawa te !


Sima na mikolo mibale, akopesa biso lisusu bomoi ; na mokolo ya misato, akotelemisa biso lisusu mpo ete tozala na bomoi liboso na Ye.


mpe Nzambe akopambola yo. Atako bakoki te kozongisela yo bolamu oyo osali mpo na bango, kasi Nzambe akofuta niongo na mokolo oyo bato ya sembo bakosekwa.


Yesu alobaki na ye : — Ndeko na yo akosekwa.


Nzokande, Ye oyo atindaki Ngai alingi ete nabungisa ata moto moko te kati na bato oyo apesaki Ngai, kasi nasekwisa bango na mokolo ya suka.


Pamba te mokano ya Tata na Ngai ezali ete moto nyonso oyo amoni Mwana mpe andimi Ye azwa bomoi ya seko ; mpe, Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka.


Boye ngai, ndenge moko na bango, nazalaka na elikya na Nzambe ete bato nyonso bakosekwa, ezala bato ya sembo to bato mabe.


Mpo na kondima, basi bamonaki bato na bango, oyo bakufaki kozonga lisusu na bomoi. Bato mosusu bandimaki ata konyokwama mpe baboyaki ete basikola bango, mpo bayebaki ete bakosekwa mpe bakozala na bomoi oyo ezali kitoko koleka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ