22 Kasi nazali na kondima ete, ata sik’oyo, Nzambe akopesa Yo nyonso oyo okosenga Ye.
Senga Ngai, mpe nakokomisa bikolo libula na Yo, basuka ya mokili bozwi na Yo.
Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki : — Bokonzi nyonso epesameli Ngai, ezala kati na Likolo to na mokili.
Yesu alobaki na ye : — Olobi nini : « Soki okoki ! » Nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima.
Yesu alobaki na ye : — Ndeko na yo akosekwa.
pamba te opesaki Ye bokonzi likolo ya bato nyonso, mpo ete apesa bomoi ya seko epai ya bato nyonso oyo opesaki Ye.
Tata alingaka Mwana, mpe Mwana azalaka na bokonzi kowuta na Tata mpo na kokonza nyonso.
Toyebi biso nyonso ete Nzambe ayokaka bato ya masumu te, kasi ayokaka nde moto oyo atosaka Ye mpe asalaka mokano na Ye.