Tango bandeko ya Rome bayokaki ete tokomi, bayaki kino na zando ya Apiusi mpe na esika oyo babengaka « Bandako misato, » mpo na kokutana na biso. Tango Polo amonaki bango, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe azwaki lisusu molende.
Sima na yango, biso bato oyo tokozala na bomoi na tango yango tokomemama elongo na bango kati na mapata mpo na kokutana na Nkolo, na likolo ; mpe na bongo, tokozala elongo na Nkolo libela na libela.