Mpe nazali na esengo makasi mpo na bino lokola bozalaki kuna te, pamba te likambo oyo ekosala ete kondima na bino elendisama. Kasi sik’oyo tokende epai na ye.
Bayekoli balobaki na Ye : — Moteyi, wuta mokolo oyo Bayuda balingaki koboma Yo na mabanga, eleki nanu mikolo mingi te ; bongo mpo na nini olingi lisusu kozonga kuna ?
Wana bayekoli oyo bazalaki esika moko : Simona Petelo, Toma oyo babengaka Lipasa ; Natanaele, moto ya mboka Kana ya Galile, bana ya Zebede mpe bayekoli mosusu mibale ;