15 Mpe nazali na esengo makasi mpo na bino lokola bozalaki kuna te, pamba te likambo oyo ekosala ete kondima na bino elendisama. Kasi sik’oyo tokende epai na ye.
Na butu ya mokolo oyo Izaki akomaki na Beri-Sheba, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe ya Abrayami, tata na yo ; kobanga te, nazali elongo na yo. Mpo na Abrayami, mosali na Ngai, nakopambola yo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele. »
Wuta tango Potifari akomisaki Jozefi mokonzi kati na ndako na ye mpe mokonzi ya biloko nyonso oyo azalaki na yango, Yawe apambolaki ndako ya moto ya Ejipito mpo na Jozefi ; lipamboli ya Yawe ezalaki na likolo ya biloko nyonso oyo azalaki na yango, kati na ndako na ye mpe na bilanga.
Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki : esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye ; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye.
Makambo oyo nyonso ezali mpo na litomba na bino, mpo ete ngolu efuluka koleka kati na bato ebele, mpe ete losambo ya kozongisa matondi ekoma mingi mpo na nkembo ya Nzambe.
Yango wana nazali koyikela makambo nyonso mpiko mpo na bolamu ya bato oyo Nzambe apona, mpo ete bango mpe bazwa lobiko oyo ezali kati na Yesu-Klisto, elongo na nkembo ya seko.