Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 11:11 - Mokanda na Bomoi

11 Sima na Ye koloba bongo, alobaki na bango lisusu : — Molingami na biso, Lazare, alali pongi ; kasi nazali kokende kolamusa ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 11:11
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Geazi akendeki liboso na bango mpe atiaki nzete na elongi ya mwana mobali, kasi ata eloko moko te esalemaki, ezala mongongo to koningana. Geazi azongaki mpo na kokutana na Elize mpe alobaki na ye : — Mwana alamuki te.


Oh Nzambe na biso, ezali Yo te oyo obenganaki bavandi ya mokili oyo liboso ya Isalaele, bato na Yo, mpo na kopesa yango mpo na libela epai ya bakitani ya Abrayami, molingami na Yo ?


Yawe azalaki kosolola na Moyize ndenge moto asololaka na moninga na ye. Wana Moyize azalaki kozonga na molako ; Jozue, mwana mobali ya Nuni, elenge oyo azalaki kosunga ye, azalaki kotikala kati na ndako ya kapo.


« Kasi yo, Isalaele, mosali na Ngai, Jakobi oyo naponaki, bino bakitani ya Abrayami, molingami na Ngai,


Ebele ya bato oyo bakundama na se ya mabele bakosekwa : bamoko mpo na bomoi ya seko, mpe mosusu mpo na soni mpe somo ya libela.


bakunda efungwamaki, mpe banzoto ya basantu ebele oyo bakufa esekwaki :


Alobaki na bango : — Bobima ! Mwana akufi te ; alali nde pongi. Kasi bato bakomaki kotiola Ye.


Akotaki mpe alobaki na bango : — Mpo na nini yikiyiki oyo nyonso ? Mpo na nini bozali kolela ? Mwana akufi te ; alali nde pongi !


Nzokande, soki moto atamboli na butu, akobeta penza mabaku, pamba te pole ezali te.


Bayekoli balobaki na Yesu : — Nkolo, soki azali kolala pongi, akobika na bokono na ye !


Solo, Yesu alingaki koloba ete Lazare akufi, kasi bayekoli bakanisaki ete azali kolobela nde pongi oyo tolalaka.


Bandeko nyonso mibale ya basi batindaki maloba oyo epai ya Yesu : — Nkolo, moto oyo olingaka azali kobela.


Mwasi ya libala azali ya mobali oyo abali ye ; mpe moninga ya mobali oyo asili kobala, ezali moto oyo atelemi pembeni na ye mpe azali na esengo makasi tango azali koyoka mongongo na ye. Ezali mpe bongo mpo na ngai : esengo na ngai ezali sik’oyo ya kokoka.


Bongo, afukamaki mpe agangaki makasi : — Nkolo, kotangela bango lisumu oyo te ! Tango kaka Etieni alobaki bongo, akufaki.


mpe bato oyo bakufi kati na Klisto babungi mpo na libela.


Bozongela makanisi ya malamu na ndenge ekoki mpe botika kosala masumu, pamba te bato mosusu kati na bino bayebi Nzambe te ; nazali koloba yango mpo na koyokisa bino soni.


Boyoka, nazali kotalisa bino mabombami : Biso nyonso, tokokufa te ; kasi biso nyonso, tokobongolama,


pamba te nyonso oyo ebimi na pwasa ekomaka pole. Yango wana baloba : « Moto na pongi, lamuka, bima kati na bakufi, mpe Klisto akongengisa yo. »


Yawe alobaki na Moyize : « Ozali kokende kopema elongo na bakoko na yo ; mpe, kala mingi te, bato oyo bakopengwa mpo na kosalela banzambe ya bapaya kati na mokili oyo bozali kokota, bakobosana Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na bango.


oyo akufelaki biso mpo ete, ezala soki tozali na bomoi to tokufi, tozala na bomoi elongo na Ye.


Ezalaki ndenge wana nde ekokisamaki, liloba oyo ya Makomi : « Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe ; » mpe mpo na kondima na ye, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo, mpe akomaki kobenga ye « moninga na ngai. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ