Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 11:1 - Mokanda na Bomoi

1 Kati na mboka Betani, ezalaki na mobali moko na kombo Lazare ; azalaki kobela mpe azalaki na bandeko basi mibale : Mari mpe Marte.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 11:1
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na makambo wana, bayaki koyebisa Jozefi : « Tala, tata na yo azali kobela. » Jozefi azwaki bana na ye mibale ya mibali : Manase mpe Efrayimi.


Bongo atikaki bango, abimaki longwa na engumba mpe akendeki na Betani epai wapi alekisaki butu.


Wana bazalaki kopusana pene ya Yelusalemi, bakomaki na Betifaje mpe Betani oyo ezalaki pene ya ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli na Ye mibale,


Sima na Ye koloba bongo, alobaki na bango lisusu : — Molingami na biso, Lazare, alali pongi ; kasi nazali kokende kolamusa ye.


Mpe lokola Betani ezalaki mosika ya Yelusalemi na bakilometele pene misato,


Bayuda mingi bayaki epai ya Mari mpe Marte mpo na kokabola mawa elongo na bango, mpo na kufa ya ndeko na bango.


Bandeko nyonso mibale ya basi batindaki maloba oyo epai ya Yesu : — Nkolo, moto oyo olingaka azali kobela.


Bato nyonso oyo bazalaki elongo na Yesu tango abengaki Lazare ete abima na kunda mpe asekwisaki ye kati na bakufi, bazalaki kotatola makambo oyo bamonaki.


Lokola Bayuda mingi bayokaki ete Yesu azali na Betani, bakendeki kuna ; bakendeki kaka te mpo na Yesu, kasi mpe mpo na kotala Lazare oyo Yesu asekwisaki kati na bakufi.


Na mikolo wana, akomaki kobela mpe akufaki. Sima na kosukola nzoto na ye, batiaki yango kati na shambre ya likolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ