Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 10:8 - Mokanda na Bomoi

8 Bato nyonso oyo bayaki liboso na Ngai bazali miyibi mpe babomi ; bameme eyokelaki bango te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 10:8
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Mawa na babateli bibwele oyo bazali koboma mpe kobungisa bibwele na Ngai, » elobi Yawe.


« Mwana na moto, sakola mpo na kotelemela babateli bibwele ya mokili ya Isalaele ! Sakola mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mawa na babateli bibwele ya Isalaele, oyo balukaka kaka bolamu na bango moko ! Boni, babateli bibwele basengeli te penza koluka bolamu ya bibwele ?


Bakalaka na yango bazali lokola bankosi oyo ezali koganga ; bakambi na yango bazali lokola bambwa ya zamba oyo esalaka bokila na pokwa, bongo etikaka ata eloko moko te na tongo.


Pamba te nakobimisa kati na mokili mobateli bibwele ya sika oyo akobanda koluka te bibwele oyo ebungi, akolandela te bana bibwele, akosalisa te bapota ya bibwele oyo ezoki, akoleisa te oyo ezali na nzoto kolongono, kasi akobanda koliaka misuni ya bibwele ya mafuta mpe kobuka yango makolo.


Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo akotaka na lopango ya bameme na nzela ya ekuke te, kasi amataka na likolo ya lopango, na esika mosusu, azali moyibi mpe mobomi.


Bameme na Ngai eyokaka mongongo na Ngai. Nayebi bameme na Ngai, mpe yango elandaka Ngai.


Ekotikala ata mokolo moko te kolanda mopaya ; kasi ekokima ye mosika, pamba te eyebi mongongo na ye te.


Eleki mikolo mingi te, moto moko na kombo Teodasi awutaki kobima. Azalaki komimona moto monene, mpe bato pene nkama minei bazalaki kolanda ye. Kasi tango babomaki ye, bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye bapalanganaki mpe lisanga na ye ekufaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ