5 Ekotikala ata mokolo moko te kolanda mopaya ; kasi ekokima ye mosika, pamba te eyebi mongongo na ye te.
Kasi Jozafati atunaki lisusu : — Ezali lisusu na mosakoli moko te awa oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe ?
Mwana na ngai, soki otiki koyoka mateya, okobunga nzela ya maloba ya boyebi.
Alobaki lisusu : — Bosala keba na makambo oyo bozali koyoka ! Bakomeka bino na emekelo kaka oyo bino bosalelaka mpo na komeka bato mosusu, mpe bakobakisa kutu lisusu koleka ;
Boye, bosala keba na lolenge na bino ya koyoka ! Pamba te, na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na ye oyo azangi, bakobotola ata oyo azali kokanisa ete azali na yango.
Nazali na bameme mosusu oyo ezali ya lopango oyo te. Nasengeli komema yango ; ekoyoka mongongo na Ngai. Etonga ekozala kaka moko, mpe mobateli bibwele akozala kaka moko.
Soki abimisi bameme na ye nyonso na libanda, alekaka liboso na yango ; mpe bameme elandaka ye na sima, pamba te eyebi mongongo na ye.
Pamba te na mikolo ekoya, bato bakolinga lisusu te koyoka mateya ya solo, kasi bakomilukela bango moko, kolanda baposa na bango, bateyi oyo bakoyebisa bango makambo oyo matoyi na bango esepelaka koyoka ;
Banguna yango babimelaki kati na biso, kasi bazalaki penza bato na biso te. Pamba te soki bazalaki bato na biso, balingaki kotikala na biso ; kasi batikaki biso mpo ete emonana polele ete bango nyonso bazali bato na biso te.
Ngai nakomeli bino mpo ete boyebi yango mpe mpo ete lokuta moko te ewutaka na solo ; kasi ezali te mpo boyebi yango te.
Nayebi misala, pasi mpe molende na yo. Nayebi ete okoki te koyikela bato mabe mpiko ; nayebi lisusu ete omekaki bato oyo balobaka ete bazali bantoma, nzokande bazali na bango bantoma te, mpe omonaki penza ete bazali bakosi.