Na bongo, Yesu atikaki komilakisa na polele kati na Bayuda ; alongwaki wana mpe akendeki na etuka oyo ezalaki pene ya esobe, kati na engumba moko na kombo Efrayimi ; mpe avandaki kuna elongo na bayekoli na Ye.
Bakendeki epai ya Yoane mpe balobaki na ye : — Moteyi, ozali koyeba lisusu moto oyo azalaki elongo na yo, na ngambo mosusu ya Yordani, oyo na tina ye opesaki litatoli ? Ye mpe azali kobatisa bato, mpe bato nyonso bazali kokende epai na ye.