38 Kasi soki nasalaka yango, ezala soki boboyi na bino kondima Ngai, bondima ata misala yango, mpo boyeba mpe bososola ete Tata azali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na Tata.
Yesu azongiselaki bango : — Nayebisaki bino yango, kasi boboyi na bino kondima. Makamwisi oyo nazali kosala na Kombo ya Tata ezali kotatola na tina na Ngai ;
Kala mingi te, nakozala lisusu te kati na mokili, pamba te nazali koya epai na Yo ; kasi bango, bakokoba kozala kati na mokili. Tata na Ngai, Yo oyo ozali Mosantu, batela bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai, mpo ete bazala moko ndenge Yo na Ngai tozali moko.
Ayaki na butu epai ya Yesu mpe alobaki na Ye : — Rabi, toyebi ete ozali Moteyi oyo awuti epai ya Nzambe, pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa oyo Yo ozali kosala soki Nzambe azali elongo na ye te.
Nzokande Ngai, nazali na litatoli moko ya monene na tina na Ngai moko koleka kutu oyo ya Yoane : misala oyo nazali kosala na Kombo ya Tata etatolaka na tina na Ngai ete ezali Tata nde atindaki Ngai.
Bato ya Isalaele, boyoka maloba oyo : Yesu ya Nazareti, moto oyo, na nzela ya bikamwa, ya bilembo mpe ya misala ya minene, Nzambe alakisaki bino ete awutaki epai na Ye ndenge bino moko boyebi yango,
Moto oyo atosaka mibeko na Ye awumelaka kati na Nzambe, mpe Nzambe awumelaka kati na ye. Bongo ndenge nini toyebaka ete Nzambe azali kowumela kati na biso ? Ezali na nzela ya Molimo Mosantu oyo apesaki biso.