Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 10:33 - Mokanda na Bomoi

33 Bayuda bazongiselaki Ye : — Ezali te mpo na likamwisi moko boye ya malamu nde tolingi koboma yo, kasi ezali mpo ete ozali kofinga Nzambe. Lisusu, ezali mpo ete, yo oyo ozali moto, ozali koloba ete ozali Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 10:33
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo botia mpe liboso na ye bato ya kilikili mibale oyo bakokosela ye makambo na maloba oyo : ‹ Olakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! › Na sima, bomema ye na libanda ya engumba mpe boboma ye na mabanga. »


Nalobaki : « Bozali banzambe, bozali bino nyonso bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ! »


« Mema na libanda ya molako moto oyo atioli Nzambe. Bato nyonso oyo bayokaki ye, bakotia maboko na bango na moto na ye, mpe bato nyonso ya lingomba bakobamba ye mabanga.


soki moto atioli Kombo ya Yawe, basengeli koboma ye : bato nyonso ya lingomba basengeli kobamba ye mabanga. Azala mopaya to mwana mboka, soki atioli Kombo ya Yawe, basengeli koboma ye.


Bayuda bazingelaki Ye mpe batunaki Ye : — Kino tango nini okotika mitema na biso likolo-likolo ? Soki ozali Klisto, yebisa biso yango polele !


kasi Yesu alobaki na bango : — Nalakisi bino bikamwa mingi ya minene oyo esalemaki na nguya ya Tata ; mpo na likamwisi nini bolingi koboma Ngai na mabanga ?


Bayuda balobaki na molende nyonso : — Tozali na Mobeko ; mpe kolanda Mobeko na biso, asengeli kokufa, pamba te amikomisi Mwana na Nzambe.


Mpo na yango, bakambi ya Bayuda bakomaki koluka nzela ya koboma Ye ; pamba te azalaki kotosa te mokolo ya Saba, azalaki koloba ete Nzambe azali Tata na Ye, mpe Ye akokani na Nzambe.


Tika ete moto nyonso atosa bakonzi ya leta, pamba te bokonzi nyonso ewutaka na Nzambe, mpe ezali Nzambe nde atia bakonzi oyo bazali.


Ye oyo azalaki na lolenge ya Nzambe, amonaki yango te lokola eloko ya kowelela,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ