Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 10:3 - Mokanda na Bomoi

3 Mokengeli afungolelaka mobateli bameme ekuke, bameme eyokaka mongongo na ye. Mobateli abengaka bameme na ye na kombo na yango mpe abimisaka yango na libanda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 10:3
32 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba lokola « Lisi ya Mobeko. » Litatoli. Nzembo ya Azafi.


Yawe alobaki na Moyize : — Nakosala makambo nyonso oyo osengi Ngai, pamba te ozwi ngolu na miso na Ngai mpe nayebi yo na kombo na yo.


Yeba malamu ndenge bibwele na yo ezali, mpe kengela yango malamu,


Yo oyo ovandi kati na bilanga, baninga na yo balingi koyoka mongongo na yo ; tika ete oyokisa ngai yango !


Azali kobatela etonga na Ye lokola mobateli bibwele : kosangisa bana meme na maboko na Ye mpe kokanga bango na tolo na Ye ; kotambolisa malembe-malembe bana meme ya basi oyo ezali nanu komela mabele.


nakomema bakufi miso na nzela oyo batikala nanu koyeba te, nakotambolisa bango na nzela oyo bamesana kotambola te ; nakobongola molili pole liboso na bango, mpe nakokomisa nzela ya nyoka-nyoka nzela ya alima. Tala makambo oyo nakosala, nakotika yango te.


Ngai, nazali mobateli malamu ya bibwele ; nayebi bameme na Ngai, mpe bameme na Ngai eyebi Ngai


Nazali na bameme mosusu oyo ezali ya lopango oyo te. Nasengeli komema yango ; ekoyoka mongongo na Ngai. Etonga ekozala kaka moko, mpe mobateli bibwele akozala kaka moko.


Soki abimisi bameme na ye nyonso na libanda, alekaka liboso na yango ; mpe bameme elandaka ye na sima, pamba te eyebi mongongo na ye.


Ngai nde nazali ekuke ; moto nyonso oyo akokotela na nzela na Ngai akobika ; akokota mpe akobima, mpe akozwa bilei.


Bato nyonso oyo Tata apesi Ngai bakoya epai na Ngai, mpe nakobengana soki moke te moto nyonso oyo akoya epai na Ngai.


Tala ndenge ekomama kati na mikanda ya Basakoli : « Nzambe akoteya bango nyonso. » Boye moto nyonso oyo ayokaka Tata mpe ayambaka mateya na Ye ayaka epai na Ngai.


Mpe ba-oyo abongisa wuta kala, abenga mpe bango ; ba-oyo abenga, akomisa bango bato ya sembo ; mpe ba-oyo akomisa bato ya sembo, apesa bango mpe nkembo na Ye.


pamba te nakutani na libaku malamu ya kosakola Sango Malamu, mpe bayini bazali ebele.


Solo, nasengi lisusu na yo moninga na ngai ya motema kati na mosala : sunga basi oyo, pamba te babundaki mpo na Sango Malamu, elongo na ngai, Klema mpe baninga mosusu ya mosala oyo bakombo na bango ekomama kati na buku ya bomoi.


Bobondelaka mpe mpo na biso, na tina ete Nzambe apesa biso mabaku ya koteya Sango Malamu mpo na kosakola mabombami ya Klisto. Mpe ezali mpo na mabombami yango nde ngai nazali mokangami kati na boloko.


Nzokande moboko makasi oyo Nzambe asila kotia ezali kaka ngwi ; batobola makomi oyo na likolo na yango lokola kashe : « Nkolo ayebi bato na Ye, » mpe « Moto nyonso oyo atatolaka Kombo ya Nkolo asengeli koboya mabe. »


Nzambe atalisaki bango ete sango oyo bango bazwaki mokumba ya kotatola ezalaki mpo na bango te, kasi ezalaki nde mpo na bino. Mpe sik’oyo, bozali koyoka sango yango na minoko ya bato oyo bateyaki bino Sango Malamu na nguya ya Molimo Mosantu oyo Nzambe atindaki wuta na Likolo ; mpe bango moko ba-anjelu bazalaka na posa ya koyeba yango.


Biso, tozali ya Nzambe ; mpe moto nyonso oyo ayebi Nzambe ayokaka biso. Kasi moto oyo azali ya Nzambe te ayokaka biso te. Ezali ndenge wana nde toyebaka Molimo ya solo mpe molimo ya libunga.


Nazali kolikya komona yo kala mingi te, bongo tokosolola malamu.


Moto nyonso oyo kombo na ye ekomamaki te kati na buku ya bomoi abwakamaki kati na liziba ya moto.


Tala Ngai oyo, natelemi na ekuke mpe nazali kobeta. Soki moto moko ayoki mongongo na Ngai mpe afungoli ekuke, nakokota epai na ye mpe nakolia elongo na ye, mpe ye elongo na Ngai.


pamba te Mpate oyo azali na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi akozala Mobateli na bango, akomema bango na bitima ya mayi ya bomoi, mpe Nzambe akopangusa mpinzoli nyonso ya miso na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ