Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 10:21 - Mokanda na Bomoi

21 Bamosusu bazalaki kozongisa : — Maloba wana ezali te ya moto oyo azali na se ya bokonzi ya molimo mabe ! Boni, molimo mabe ekoki penza kofungola miso ya bakufi miso ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 10:21
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe abikisaka miso ya bakufi miso ; Yawe asembolaka bato oyo bazali ya kogumbama ; Yawe alingaka bato ya sembo.


Boni, Ye oyo asala litoyi akoki koyoka te ? Ye oyo asala liso akoki komona te ?


Yawe alobaki na ye : — Nani apesaka monoko epai ya moto ? Nani akomisaka moto baba to mokufi matoyi ? Nani akomisaka moto, moto oyo amonaka to mokufi miso ? Boni, ezali Ngai Yawe te ?


Bongo nakotia bokeseni kati na bato na Ngai mpe bato na yo. Elembo yango ekosalema lobi. »


Ezala litoyi oyo eyokaka to liso oyo emonaka, ezali Yawe nde asalaki nyonso mibale.


bakufi miso bazali komona, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi matoyi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.


Sango na Ye epanzanaki kati na Siri mobimba, mpe bato bazalaki komemela Ye babeli oyo bazalaki na bokono ya ndenge na ndenge mpe oyo bazalaki na mikakatano makasi : bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe, bato oyo bazalaki na bokono ya ndeke mpe bato oyo bazalaki na makolo mpe maboko ya kokufa ; mpe azalaki kobikisa bango.


Ekomaki tango ya kosepela feti ya Kobulisa Tempelo ya Yelusalemi. Feti yango esalemaki na tango ya malili makasi.


Sima na Yesu koloba bongo, abwakaki soyi na mabele mpe, na nzela ya soyi na Ye, asalaki potopoto. Bongo apakolaki yango na miso ya mokufi miso


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ