Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 10:20 - Mokanda na Bomoi

20 Mingi kati na bango bazalaki koloba : — Azali na molimo mabe ! Azali na liboma ! Mpo na nini bozali koyoka ye ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 10:20
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Babomaki ye na nzela ya minyoko mpe ya etumbu ; kasi nani kati na bato ya tango na ye akokaki komitungisa na tina na ye ? Pamba te balongolaki ye na mokili ya bato ya bomoi, babetaki ye likolo ya masumu ya bato na Ngai.


‹ Yawe aponaki yo Nganga-Nzambe na esika ya Yeoyada mpo ete obatela Tempelo ya Yawe. Osengelaki kobwaka na boloko mpe kokanga bibende na makolo, bato pamba oyo bazali komimona lokola basakoli.


Nzokande, ekoki mpo na moyekoli kozala lokola molakisi na ye, mpe mpo na mowumbu kozala lokola nkolo na ye. Soki babengaki Nkolo ndako « Belizebule, » ekozala boni mpo na bavandi ya ndako na Ye ?


Pamba te, tango Yoane ayaki, azalaki kolia te mpe azalaki komela vino te ; mpe balobaki : « Azali na molimo mabe kati na ye ! »


Kasi Bafarizeo bazalaki koloba : — Azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.


Tango bandeko ya libota na Ye bayokaki bongo, bayaki mpo na kozwa Ye na makasi, pamba te bazalaki koloba : — Akomi na bokono ya liboma.


Bato kati na ngulupa bazongiselaki Yesu : — Ozali na molimo mabe. Nani azali koluka koboma yo ?


Na yango, Bayuda balobaki na Ye : — Tomoni sik’oyo ete ozali na molimo mabe kati na yo ! Pamba te Abrayami asila kokufa, basakoli mpe lokola ; bongo yo ozali koloba ete moto oyo akobatela Liloba na yo kati na ye akotikala kokufa te !


Wana Polo azalaki nanu koloba, Festisi akataki ye maloba mpe agangelaki ye : — Ozali na liboma, Polo ! Boyebi oyo otondi na yango ekomisi yo liboma !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ