Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 10:18 - Mokanda na Bomoi

18 Moto moko te azali kobotola Ngai bomoi yango, kasi Ngai moko nde nazali kokaba yango, na mokano na Ngai moko. Nazali na bokonzi ya kopesa mpe ya kozwa yango lisusu. Yango nde mitindo oyo Tata na Ngai apesaki Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 10:18
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nazali mobateli malamu ya bameme. Mobateli malamu ya bameme apesaka bomoi na ye mpo na bameme na ye.


—ndenge kaka Tata ayebi Ngai, mpe Ngai nayebi Tata— Nazali kokaba bomoi na Ngai mpo na bameme na Ngai.


Tata alingaka Ngai mpo ete nazali kokaba bomoi na Ngai ; kasi nakozwa yango lisusu.


kasi ezali mpo ete mokili eyeba ete nalingaka Tata, mpe ete nazali kosala kolanda ndenge atindaki Ngai. Botelema ; tolongwa awa.


Soki kaka bobateli mibeko na Ngai, bokowumela kati na bolingo na Ngai, ndenge Ngai nabatelaki mibeko ya Tata na Ngai mpe nawumelaka kati na bolingo na Ye.


Yesu alobaki na ye : — Okokaki kozala na bokonzi moko te likolo na Ngai soki epesamelaki yo te wuta na likolo. Yango wana, moto oyo akabi Ngai na maboko na yo asali lisumu monene koleka.


pamba te lokola Tata azali etima ya bomoi, yango wana asalaki mpe ete Mwana azala etima ya bomoi ;


Nakoki kosala eloko moko te na ndenge na Ngai moko : nakataka makambo kolanda oyo nayokaka kowuta epai na Tata, mpe kosambisa na Ngai ezali sembo ; pamba te nalukaka te kosala mokano na Ngai moko, kasi mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.


Pamba te soki nakitaki wuta na Likolo, ezali te mpo na kosala mokano na Ngai moko, kasi mpo na kokokisa mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.


Kasi Nzambe abukaki minyololo ya kufa, asekwisaki Ye, pamba te ekokaki kosalema te ete kufa ekanga Ye.


Nzambe asekwisaki Yesu kati na bakufi ; boye biso nyonso tozali batatoli ya lisekwa yango.


Bobomaki nde Mobandisi ya bomoi. Kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, bongo biso tozali penza batatoli ya likambo yango.


amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.


Kasi tala makambo oyo tozali komona : Yesu oyo akitisamaki na se ya ba-anjelu mpo na mwa tango moke, alati sik’oyo motole ya nkembo mpe ya lokumu mpo ete andimaki pasi oyo ememaki Ye kino na kufa. Na bongo, na ngolu ya Nzambe, Yesu akufaki nde mpo na bato nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ