8 Ye moko Yoane azalaki pole te, kasi ayaki nde mpo na kozala motatoli na tina na pole.
Abetaki monoko te, kasi alobaki na bango solo na bonsomi nyonso : — Ngai, nazali Klisto te.
Pole ya solo eyaki na mokili, mpe engengisaka bato nyonso.
Bino moko bokoki kotatola ete nalobaki : « Ngai, nazali Klisto te, kasi natindamaki liboso na Ye. »
Polo alobaki na bango : — Libatisi oyo Yoane azalaki kopesa ezalaki libatisi ya kobongola motema ; azalaki koloba na bato ete bandimela moto oyo akoya sima na ye, elingi koloba ete bandimela Yesu.