Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 1:43 - Mokanda na Bomoi

43 Mokolo oyo elandaki, Yesu azwaki mokano ya kokende na Galile. Na nzela, akutanaki na Filipo mpe alobaki na ye : « Landa Ngai. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 1:43
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Namimonisaki, Ngai moko, epai ya bato oyo bazalaki kotuna Ngai kutu toli te, namilakisaki epai ya bato oyo bazalaki koluka Ngai te. Epai ya ekolo oyo ezalaki kobelela Kombo na Ngai te, nalobaki : ‹ Ngai oyo, Ngai oyo ! ›


Filipo mpe Bartelemi ; Toma mpe Matayo, mofutisi mpako ; Jake, mwana mobali ya Alife, mpe Tade ;


Tango Yesu ayokaki ete babwaki Yoane Mobatisi kati na boloko, azongaki na Galile.


Kasi Yesu alobaki na ye : — Landa Ngai ! Tika bakufi bakunda bakufi na bango.


Wana Yesu alongwaki na esika yango mpe azalaki kokende, amonaki mobali moko avandi na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako ; kombo na ye ezalaki « Matayo. » Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. » Boye Matayo atelemaki mpe alandaki Yesu.


Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa bato oyo babunga.


Makambo oyo nyonso esalemaki na Betani, na ngambo mosusu ya Yordani, epai wapi Yoane azalaki kobatisa.


Mokolo oyo elandaki, wana Yoane amonaki Yesu koya epai na ye, alobaki : — Tala Mpate ya Nzambe, oyo alongolaka lisumu ya mokili.


Mokolo oyo elandaki, wana Yoane azalaki lisusu na esika yango elongo na bayekoli na ye mibale,


Lokola bayekoli nyonso mibale bayokaki ndenge Yoane alobaki, balandaki Yesu.


Filipo, Andre mpe Petelo bazalaki bato ya engumba Betisaida.


Bakendeki epai ya Filipo, moto ya mboka Betisaida ya Galile, mpe batalisaki ye bosenga oyo : — Tata, tolingi komona Yesu.


Filipo alobaki na Yesu : — Nkolo, lakisa biso Tata ; tozali na posa ya eloko mosusu te.


Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki : esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye ; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye.


Tango Yesu atombolaki miso, amonaki ebele ya bato penza koya epai na Ye ; alobaki na Filipo : — Tokosomba mapa wapi mpo na koleisa bato oyo nyonso ?


Filipo azongiselaki Yesu : — Mapa oyo tokoki kosomba na mbongo ya bibende nkama mibale ekokoka te mpo ete moto moko na moko kati na bango azwa eteni ya lipa !


Nalingi koloba te ete nasili kozwa biloko oyo nyonso to mpe nasili kokoma moto ya kokoka, kasi nazali nde kopota mbangu mpo na kozwa yango, pamba te Yesu-Klisto asila mpe kozwa ngai.


Biso, tolingaka mpo ete Nzambe alingaki biso, ya liboso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ