Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 1:39 - Mokanda na Bomoi

39 Yesu azongiselaki bango : — Boya mpe bokomona. Balandaki Yesu, bamonaki esika oyo azalaki kovanda mpe bavandaki elongo na Ye na mokolo wana. Ezalaki na ngonga ya minei sima na midi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 1:39
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nalingaka bato oyo balingaka ngai, mpe bato oyo balukaka ngai bamonaka ngai.


Kasi bango babondelaki Ye makasi : — Vanda elongo na biso, pamba te pokwa esili kokoma, mpe butu elingi kokota. Boye Yesu akotaki na ndako mpo na kovanda elongo na bango.


Bongo tango Yesu abalukaki mpo na kotala na sima, amonaki bango mibale bazali kolanda Ye. Atunaki bango : — Bolingi nini ? Bazongisaki : — Rabi, ovandaka wapi ?


Andre, ndeko ya Simona Petelo, azalaki moko kati na bato wana mibale oyo bayokaki maloba ya Yoane mpe balandaki Yesu.


Natanaele atunaki ye : — Boni, eloko ya malamu ekoki mpe kobima na Nazareti ? Filipo azongiselaki ye : — Yaka mpe okomona yo moko.


Tango bato ya Samari bayaki epai ya Yesu, basengaki na Ye ete avanda elongo na bango ; mpe Yesu avandaki elongo na bango mikolo mibale.


Bato nyonso oyo Tata apesi Ngai bakoya epai na Ngai, mpe nakobengana soki moke te moto nyonso oyo akoya epai na Ngai.


Tala Ngai oyo, natelemi na ekuke mpe nazali kobeta. Soki moto moko ayoki mongongo na Ngai mpe afungoli ekuke, nakokota epai na ye mpe nakolia elongo na ye, mpe ye elongo na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ