Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 1:33 - Mokanda na Bomoi

33 Ngai moko mpe nayebaki Ye te ; kasi Ye oyo atindaki ngai kobatisa na mayi alobaki na ngai : « Moto oyo okomona Molimo kokita mpe kowumela likolo na Ye, Ye nde akobatisa kati na Molimo Mosantu. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 1:33
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema. Kasi sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe kati na moto.


Yoane azongiselaki bango : — Ngai nazali kobatisa bino na mayi ; kasi ezali na Moto moko oyo azali koya, aleki ngai na nguya, mpe ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe na moto.


Ngai moko mpe nayebaki te soki esengelaki kozala nani ; kasi tina oyo ngai nayaki kobatisa bato na mayi, ezalaki nde mpo ete natalisa Ye epai ya bato ya Isalaele.


Kasi Molobeli, Molimo Mosantu oyo Tata akotinda na Kombo na Ngai, akoteya bino makambo nyonso mpe akosunga bino mpo ete bobosana te nyonso oyo nayebisaki bino.


Motindami ya Nzambe alobaka kaka maloba kowuta na Nzambe, pamba te Nzambe atondisa ye na Molimo na Ye nyonso.


Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : moto moko te akoki kokota na Bokonzi ya Nzambe soki abotami te na mayi mpe na Molimo.


Yesu alobaki bongo na tina na Molimo oyo bato oyo bakotia kondima na bango kati na Ye bakozwa ; mpo ete na tango wana, Molimo apesamaki nanu te, pamba te Yesu akotaki nanu te kati na nkembo na Ye.


Pamba te Yoane abatisaki na mayi ; kasi bino, sima na mwa mikolo, bokobatisama kati na Molimo Mosantu. »


Bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe babandaki koloba na nkota mosusu, ndenge Molimo azalaki kolakisa bango.


Solo, biso nyonso tobatisamaki kati na Molimo moko mpo na kosala nzoto moko : ezala Bayuda to Bagreki, ezala bawumbu to bansomi. Mpe epesamelaki biso nyonso komela Molimo wana se moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ