Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 1:27 - Mokanda na Bomoi

27 azali koya sima na ngai, mpe ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 1:27
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

ete nakozwa eloko moko te kati na biloko na yo : ezala singa ya kotongela to ya kokangela sapato, mpo ete oloba te : « Nakomisi Abrami mozwi. »


Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema. Kasi sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe kati na moto.


Tala makambo oyo azalaki koteya bato : « Sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kogumbama liboso na Ye mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye.


Yoane azongiselaki bango : — Ngai nazali kobatisa bino na mayi ; kasi ezali na Moto moko oyo azali koya, aleki ngai na nguya, mpe ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe na moto.


Yoane azalaki kotatola na tina na Ye, na mongongo makasi : « Botala Ye oyo nalobaki na tina na Ye : ‹ Ye oyo azali koya sima na ngai aleki ngai na lokumu, pamba te azalaki liboso ete ngai nazala. › »


Ezali na tina na Ye nde nalobaki : « Ezali na moko oyo azali koya sima na ngai, aleki ngai na lokumu, pamba te azalaki liboso ete ngai nazala. »


Bato mingi penza bayaki epai na Ye ; bazalaki koloba : « Yoane asalaki likamwisi ata moko te, kasi makambo nyonso oyo alobaki na tina na moto oyo ezali ya solo ! »


Wana Yoane akomaki pene ya kosilisa mosala na ye, alobaki : « Bokanisi ete ngai nazali nani ? Nazali te Moto oyo bozali kozela. Kasi azali koya sima na ngai, Ye oyo nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ! »


Polo alobaki na bango : — Libatisi oyo Yoane azalaki kopesa ezalaki libatisi ya kobongola motema ; azalaki koloba na bato ete bandimela moto oyo akoya sima na ye, elingi koloba ete bandimela Yesu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ