Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 1:21 - Mokanda na Bomoi

21 Batunaki ye lisusu : — Bongo ozali nani ? Ozali Eliya ? Azongisaki : — Nazali Eliya te. Batunaki ye lisusu : — Ozali mosakoli ? Azongisaki : — Te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 1:21
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe, soki bokoki kondima, boyeba ete ye nde azali Eliya oyo asengeli koya.


Bazongisaki : — Bamoko balobaka ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, Jeremi to moko kati na basakoli.


Bato bazalaki kozongisa : — Ezali mosakoli Yesu, moto ya Nazareti ya Galile !


mpe akotambola liboso ya Nzambe, elongo na molimo mpe nguya oyo ezalaki kovanda kati na Eliya, mpo na kozongisa boyokani kati na batata mpe bana na bango, mpo na kosala ete batomboki bakoma kokanisa lokola bato ya sembo, mpe mpo na kobongisa bato mpo na Nkolo.


Bakobaki kotuna ye : — Bongo ozali penza nani ? Ozali koloba nini na tina na yo moko ? Yebisa biso yango, pamba te tosengeli kopesa eyano epai ya bato oyo batindi biso.


Batunaki ye lisusu : — Soki ozali Masiya te, Eliya te to mpe mosakoli te, bongo mpo na nini ozali kobatisa ?


Tango bato bamonaki bikamwa oyo Yesu awutaki kosala, balobaki : « Azali penza Mosakoli oyo asengelaki koya na mokili. »


Kati na bato oyo bayokaki maloba na Ye, bamoko bazalaki koloba : « Moto oyo azali penza Mosakoli, »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ