Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 1:19 - Mokanda na Bomoi

19 Tala litatoli oyo Yoane apesaki tango bakambi ya Bayuda batindaki, wuta na Yelusalemi, Banganga-Nzambe mpe Balevi, mpo na kotuna ye : — Yo ozali nani ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 1:19
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ayaki lokola motatoli, mpo na kotatola na tina na pole, mpo ete bato nyonso bandima na nzela na ye.


Bayuda bazingelaki Ye mpe batunaki Ye : — Kino tango nini okotika mitema na biso likolo-likolo ? Soki ozali Klisto, yebisa biso yango polele !


Na bongo, Bayuda balokotaki lisusu mabanga mpo na koboma Ye,


Bayuda mingi bayaki epai ya Mari mpe Marte mpo na kokabola mawa elongo na bango, mpo na kufa ya ndeko na bango.


Bayuda balobaki na Yesu : — Likamwisi nini okoki kolakisa biso mpo na kotalisa biso ete ozali na bokonzi ya kosala makambo oyo nyonso ?


Bayuda balobaki lisusu : — Boni, soki esalaki mibu tuku minei na motoba mpo na kotonga lisusu Tempelo oyo, yo okanisi ete okotelemisa yango na mikolo misato ?


Boye, bakambi ya Bayuda balobaki na moto oyo abikisamaki : — Lelo ezali mokolo ya Saba ; ozali na ndingisa te ya komema etoko oyo.


Moto yango akendeki koyebisa bakambi ya Bayuda ete ezali Yesu nde abikisaki ye.


Lokola Yesu azalaki kosala makambo wana na mokolo ya Saba, bakambi ya Bayuda bakomaki kofunda Ye.


Mpo na yango, bakambi ya Bayuda bakomaki koluka nzela ya koboma Ye ; pamba te azalaki kotosa te mokolo ya Saba, azalaki koloba ete Nzambe azali Tata na Ye, mpe Ye akokani na Nzambe.


Bayuda bakomaki koyimayima na tina na Ye mpo ete alobaki : « Ngai, nazali lipa oyo ekiti wuta na Likolo. »


Tango Bayuda bayokaki bongo, bakomaki kotiana tembe ; bazalaki koloba : — Akopesa biso nzoto na ye ndenge nini mpo ete tolia yango ?


Sima na yango, Yesu atambolaki na mokili ya Galile, aboyaki kovanda na Yuda, pamba te Bayuda bazalaki koluka koboma Ye.


Wana bazalaki kati na feti, Bayuda bazalaki koluka Ye mpe bazalaki kotuna-tuna : « Azali wapi ? »


Bayuda bakamwaki mpe bazalaki kotunana : — Ndenge nini moto oyo ayekola te akoki koyeba Makomi boye ?


Na bongo, Bayuda batunanaki bango na bango : — Boni, azali na makanisi ya komiboma, yango wana alobi : « Epai Ngai nazali kokende, bino, bokokoka te koya kuna ? »


Bayuda bazongiselaki Ye : — Omoni ! Yango wana tolobaki na biso ete ozali moto ya Samari mpe ozali na molimo mabe kati na yo.


Na yango, Bayuda balobaki na Ye : — Tomoni sik’oyo ete ozali na molimo mabe kati na yo ! Pamba te Abrayami asila kokufa, basakoli mpe lokola ; bongo yo ozali koloba ete moto oyo akobatela Liloba na yo kati na ye akotikala kokufa te !


Bayuda balobaki na Ye : — Nini ? Yo moto oyo okokisi nanu te ata mibu tuku mitano ya mbotama, ozali koloba ete omonaki Abrayami !


Wana Yoane akomaki pene ya kosilisa mosala na ye, alobaki : « Bokanisi ete ngai nazali nani ? Nazali te Moto oyo bozali kozela. Kasi azali koya sima na ngai, Ye oyo nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ! »


Polo alobaki na bango : — Libatisi oyo Yoane azalaki kopesa ezalaki libatisi ya kobongola motema ; azalaki koloba na bato ete bandimela moto oyo akoya sima na ye, elingi koloba ete bandimela Yesu.


Mpo na makambo oyo etali bokono ya maba, bosala keba ete bosalela malamu malako nyonso oyo Banganga-Nzambe, ba-oyo bazali Balevi, bapesaki bino. Bosengeli kotosa malamu makambo oyo natindaki bango.


Tala makambo oyo toyoki na tina na Ye mpe tozali koyebisa bino : Nzambe azali pole, mpe molili ezali te kati na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ