Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yoane 1:11 - Mokanda na Bomoi

11 Ayaki epai ya ekolo na Ye, kasi bato ya ekolo na Ye moko bayambaki Ye te ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yoane 1:11
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yesu azongisaki : — Natindamaki kaka epai ya bameme ebunga ya Isalaele !


Kasi bandeko na ye, bana mboka, bazalaki kolinga ye te ; batindaki ndambo ya bato, sima na ye, mpo na koloba : « Toboyi ete moto oyo akoma mokonzi na biso. »


Ye oyo azali Liloba azalaki kati na mokili, pamba te Ye nde akelaki yango, kasi mokili endimaki Ye te.


nzokande bato nyonso oyo bayambaki Ye, ba-oyo bandimelaki Kombo na Ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe.


Mpe alobaki na moyekoli yango : — Tala mama na yo ! Boye, kobanda na tango wana, moyekoli yango azwaki mama ya Yesu mpo ete akoma kovanda na ndako na ye.


azali kotatola na tina na makambo oyo amonaki mpe ayokaki, kasi moto moko te azali kondima litatoli na Ye.


Bandeko na ngai, bino oyo bozali bana ya Abrayami, mpe bino oyo bozali Bayuda te kasi botosaka Nzambe, ezali epai na biso nde Nzambe atindaki maloba oyo ya lobiko.


Bongo, Polo mpe Barnabasi balobaki na bango na mpiko : — Tosengeli liboso koteya bino Liloba na Nzambe. Kasi lokola boboyi yango mpe bozali bino moko komimona ete bokoki te mpo na kozwa bomoi ya seko, tokeyi na biso sik’oyo epai ya bato oyo bazali Bayuda te.


Sima na kopesana mbote ya suka, tomataki na masuwa, mpe bango bazongaki na bandako na bango.


Pamba te nazali koloba na bino solo : Klisto akomaki Mosali ya Bayuda mpo na kokokisa bilaka oyo Nzambe apesaki epai ya bakoko na bango mpe kolakisa ete Nzambe azali Moyengebene.


Nazali koloba solo kati na Klisto, nazali kokosa te mpe motema na ngai ezali koyebisa ngai solo na nzela ya Molimo Mosantu :


mpe bakoko. Ezali na nzela ya bakoko yango nde Klisto, oyo azali na likolo ya nyonso, ayaki na mokili lokola moto. Tika ete Nzambe apambolama libela na libela ! Amen !


Kasi tango ngonga oyo Nzambe akataki ekokaki, atindaki Mwana na Ye, oyo abotamaki na mwasi mpe na se ya bokonzi ya Mobeko,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ