Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Tito 3:8 - Mokanda na Bomoi

8 Makambo oyo nawuti koloba ezali penza ya solo ; mpe nalingi ete obetelaka yango sete makasi, mpo ete bato oyo bandimeli Nzambe bamipesa mobimba mpo na kosala misala ya malamu. Yango nde makambo oyo ezali penza malamu mpe na tina mpo na bato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Tito 3:8
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Boni, litomba nini Nzambe akoki kozwa epai ya moto ? Ezala ata moto ya bwanya, azalaka na litomba kaka mpo na ye moko.


pamba te batiaki elikya na Nzambe te, bandimaki te ete akoki kokangola bango.


Motatoli ya lokuta akokufa, kasi moto oyo ayokaka akoloba tango nyonso.


Alobaki na bango : « Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino. Nakopesa bino lifuti ya sembo, oyo ekoki. »


Bongo Yesu alobaki na mongongo ya makasi : — Moto oyo andimi Ngai, andimi kaka Ngai te, kasi andimi mpe Ye oyo atindaki Ngai ;


Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi.


Balobaki na ye : — Okomi penza na liboma ! Kasi Rode azalaki kaka koloba : — Ya solo penza ! Petelo azali na libanda. Bongo balobaki : — Ekoki kozala anjelu na ye !


Nzokande, soki moto asali mosala te, kasi andimeli Nzambe oyo atangaka bato ya masumu lokola bato ya sembo, kondima na ye ekokomisa ye moto ya sembo.


Mpe awa tozali na molimo wana moko ya kondima, kolanda ndenge ekomama : « Nandimaki, yango wana nalobaki, » biso mpe tondimaka, mpe yango wana tolobaka.


Tika ete moyibi ayiba lisusu te, kasi amipesa nde na mosala ; mpe tika ete maboko na ye esala na bosembo nyonso mpo ete azwa eloko ya kosunga na yango moto oyo azali kati na bosenga.


Tala liloba ya solo penza, liloba oyo ekoki na kondimama mpe koyambama na mobimba na yango : Yesu-Klisto ayaki kati na mokili mpo na kobikisa bato ya masumu ; mpe kati na bato yango ya masumu, ngai nde naleki na masumu.


Yango wana nalingi ete mibali basambelaka na bisika nyonso, na kotombola maboko ya bule, na kanda te mpe na koswana te.


kozala mwasi oyo akenda sango mpo na misala na ye ya malamu : abokolaki bana na ye malamu, azalaki koyamba malamu bapaya kati na ndako na ye, kosukola makolo ya basantu, kosunga bato na mawa mpe komipesa na misala nyonso ya malamu.


Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi oyo. Kasi atako bongo, nazali koyoka soni te, pamba te nayebi nani oyo ngai nandimela, mpe nazali na elikya ete azali na makoki ya kobatela nyonso oyo apesa ngai, kino na mokolo wana.


moto oyo akangama makasi na Liloba ya solo, ndenge kaka bateyaki ye yango. Na bongo, akoki kolendisa bato mosusu na nzela ya malakisi ya peto mpe kosukisa tembe ya bato oyo bandimaka te.


amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.


Na makambo nyonso, zala ndakisa na nzela ya misala malamu ; mpe na mateya na yo, lakisa bosembo, longola maseki,


Yebisa bango lisusu ete basengeli kotosa bakambi mpe bakonzi, koselingwa mpo na misala nyonso ya malamu,


Bandeko na biso mpe basengeli koyekola komipesa na misala ya malamu, mpo na kosunga bosenga nyonso mpe kobika bomoi oyo ekobotaka bambuma.


Na kala, azalaki na tina ata moko te na miso na yo, kasi sik’oyo akomi na tina mingi na miso na yo mpe na miso na ngai.


Tosenzelana biso na biso mpo na kotindikana na bolingo mpe na misala ya malamu.


Ezali na nzela na Ye nde bino bondimelaka Nzambe oyo asekwisaki Ye kati na bakufi mpe apesaki Ye nkembo, mpo ete kondima mpe elikya na bino ezala kati na Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ