Atako bongo, tango mikolo na biso ekokaki, tolongwaki wana mpe tokobaki mobembo na biso. Bayekoli nyonso elongo na basi na bango mpe bana na bango bakendeki kotika biso kino na libanda ya engumba. Tango tokomaki na libongo, tofukamaki mpo na kosambela.
Boye, bapesaki biso lokumu ya ndenge na ndenge ; mpe tango tokomaki pene ya kozongela mobembo na biso, bapesaki biso biloko nyonso oyo tozalaki na yango posa mpo na mobembo.
nazali kosala mabongisi ya kokokisa yango tango nakokende na Espane. Nazali na elikya ete, wana nakolekela epai na bino, nakomona bino mpe nakozwa lisungi na bino mpo na kokende kuna, sima na ngai kosepela kovanda elongo na bino ata na mwa tango moke.
Tika ete moto moko te atala ye lokola eloko ya pamba ! Bopesa ye makoki mpo ete asala mobembo ya malamu kino epai na ngai, pamba te nazali kozela ye elongo na bandeko.
Mpo na oyo etali Apolosi, ndeko na biso, nalendisaki ye makasi ete aya kotala bino elongo na bandeko, kasi aboyi kosala yango sik’oyo ; akoya kaka tango akokutana na libaku ya malamu.