Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Tito 3:12 - Mokanda na Bomoi

12 Tango kaka nakotindela yo Artemasi to Tishike, sala nyonso mpo ete oya epai na ngai, na Nikopolisi, pamba te nazwaki mokano ya kolekisa kuna eleko ya malili makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Tito 3:12
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala bato oyo bakendeki na ye elongo : Sopatere, mwana ya Pirisi, moto ya Bere ; Arisitarke mpe Sekundusi, bato ya Tesalonika ; Gayusi, moto ya Derbe ; Timote, Tishike mpe Trofime, bato ya etuka ya Azia.


Tango mosusu, nakovanda mwa mikolo epai na bino to nakolekisa kuna tango ya malili, mpo ete bopesa ngai, bino moko, makoki oyo nasengeli na yango mpo na kokoba mobembo na ngai kino epai nakokende.


Tishike oyo, kati na Nkolo, azali ndeko molingami mpe mosali ya sembo, akoyebisa bino makambo nyonso, mpo ete bino mpe boyeba ndenge nini nazali mpe makambo nini nazali kosala.


Tishike, ndeko molingami, mosali ya sembo mpe moninga na ngai kati na mosala ya Nkolo, akoyebisa bino makambo nyonso oyo etali ngai.


Sala makasi ete okoma awa liboso ete tango ya malili makasi ebanda. Ebilisi, Pidesi, Linisi, Klodia mpe bandeko nyonso bapesi yo mbote.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ