Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Tito 3:11 - Mokanda na Bomoi

11 pamba te osengeli koyeba ete moto ya ndenge wana abunga nzela, azali kosala masumu ; mpe na ndenge wana, amikateli ye moko etumbu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Tito 3:11
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe ! Nakopesa yo etumbu kolanda maloba na yo moko. Oyebaki ete nazali moto ya matata, ete nazwaka biloko oyo nabombaki te mpe nabukaka bambuma ya nkona oyo nalonaki te.


Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko baboyaki mokano ya Nzambe mpo na bango, pamba te baboyaki ete Yoane abatisa bango.


Moto nyonso oyo andimi Ye akozwa etumbu te ; kasi ye oyo aboyi kondima Ye asili kozwa etumbu, pamba te aboyi kondima Mwana se moko ya Nzambe.


Bongo, Polo mpe Barnabasi balobaki na bango na mpiko : — Tosengeli liboso koteya bino Liloba na Nzambe. Kasi lokola boboyi yango mpe bozali bino moko komimona ete bokoki te mpo na kozwa bomoi ya seko, tokeyi na biso sik’oyo epai ya bato oyo bazali Bayuda te.


Toyokaki ete bandeko mosusu bawutaki epai na biso, ba-oyo topesaki ata nzela te, bayaki kotia mobulu kati na bino, batiaki penza mobulu kati na bino mpe batungisaki mitema na bino na nzela ya maloba na bango. Nzokande, totindaki bango te.


Nzokande, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa, mpe mpo ete moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe.


Yango nde makambo oyo osengeli koloba mbala na mbala epai ya bato, na kopesa bango mitindo liboso ya Nzambe ete batika koswana na tina na maloba ; ezali na tina moko te, soki kaka te komema bato oyo bayokaka yango na libebi.


Osengeli kosukisa bango, pamba te bazali kobebisa mabota ebele na nzela ya malakisi oyo esengeli kutu te, mpo na kaka kozwa mbongo ya soni.


mpe balanda te masapo ya Bayuda to mibeko ya bato oyo baboyi solo.


Pamba te, soki tokobi kosala masumu na nko sima na koyeba bosolo, mbeka mosusu mpo na bolimbisi ya masumu ekozala lisusu te ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ