Nabakisaki : — Makambo oyo bozali kosala ezali malamu te. Bosengelaki te kotambola na kotosa Nzambe na biso mpo ete topesa te na bapagano oyo bazali banguna na biso nzela ya kotiola biso ?
Boyoka Liloba na Yawe, bino bato oyo bolengaka liboso ya liloba na Ye : « Bandeko na bino oyo bayina bino mpe baboya bino likolo ya Kombo na Ngai balobi : ‹ Tika ete Yawe amonisa nkembo na Ye mpo ete tokoka komona esengo na bino ! › Kasi bango nde bakosambwa solo.
Moko kati na balakisi ya Mobeko, oyo ayokaki bango kotiana tembe mpe amonaki ete Yesu azongiselaki bango biyano ya malamu, apusanaki pene na Yesu mpe atunaki : — Mobeko nini eleki monene kati ya mibeko nyonso ?
Tango Yesu amonaki ete molakisi ya Mobeko azongisi eyano na ndenge ya mayele, alobaki na ye : — Ozali mosika te ya Bokonzi ya Nzambe. Mpe moto ata moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.
Soki moto aboyi kotosa mitindo oyo topesi bino kati na mokanda oyo, bokebisa bato nyonso na tina na ye mpe bosangana na ye lisusu te mpo ete ayoka soni.
Yango wana nazali kopesa toli epai ya bilenge basi bakufisa mibali ete babala na bango lisusu, babota bana, bakamba bandako na bango malamu, mpo ete bapesa na banguna nzela te ya kotonga biso.
Soki moto apesi malakisi mosusu mpe aboyi kokangama na maloba ya solo ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, elongo na malakisi oyo ekoki na botosi kati na makambo ya Nzambe,
Bozalaka na bizaleli ya malamu kati na Bapagano mpo ete, ata soki bazali kotonga bino ete bozali kosala mabe, bandima ata misala malamu na bino mpe bapesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akomimonisa.
kasi botatolaka yango na boboto, na limemia mpe na mitema peto, mpo ete bato oyo balobaka mabe na tina na etamboli na bino ya malamu kati na Klisto bakufa soni.