Elenge, sepela na bolenge na yo, mpe tika ete motema na yo esepela na mikolo ya bolenge na yo ! Landa nzela ya motema na yo mpe nyonso oyo esepelisaka miso na yo ; kasi yeba ete, mpo na makambo wana nyonso, Nzambe akosambisa yo.
Kanisa Mokeli na yo, na mikolo nyonso ya bolenge na yo, liboso ete mikolo ya pasi ekomela yo, mpe mibu epusana, mibu oyo okoloba na tina na yango : « Nazali kosepela na ngai na yango te ; »
Ndenge moko mpe, bino bilenge, botosaka bakambi na bino ya Lingomba, bolata komikitisa kati na bino, pamba te Makomi elobi : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »