8 Asengeli nde kozala moto oyo ayambaka bato malamu kati na ndako na ye, alingaka makambo ya malamu, azalaka na ekenge ; asengeli kozala moto ya bule, moto ya sembo, moto oyo ayebi komikanga,
Salomo azalaki kokonza bikolo wana nyonso, kobanda na ebale Efrate kino na mokili ya bato ya Filisitia, mpe kino koleka mondelo ya Ejipito. Na bomoi na ye mobimba, bikolo yango ezalaki kofuta mpako epai na ye mpe ezalaki na se ya bokonzi na ye.
Bayangeli ya bituka bazalaki komema bilei, moto na moto na sanza na ye, mpo na mokonzi Salomo mpe mpo na bato nyonso oyo bazalaki kolia na mesa ya mokonzi ; bazalaki kosala ete eloko moko te ezanga.
Boyinaka kosala mabe, kasi bolingaka nde kosala bolamu ; bolukaka bosembo tango bozali kosambisa. Tango mosusu Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoyokela ndambo ya bato oyo bamikomisaki mbindo te mawa kati na libota ya Jozefi.
Na tango wana, kati na Yelusalemi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki Simeoni. Azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa makambo ya Nzambe ; azalaki kozela kobondisama ya Isalaele, mpe Molimo Mosantu azalaki likolo na ye.
Kasi, wana Polo akomaki koloba na tina na bosembo, komikanga mpe kosambisama oyo ezali koya, Felikisi ayokaki somo mpe alobaki na ye : — Ekoki mpo na sik’oyo ! Okoki kolongwa. Soki nazwi lisusu tango, nakobengisa yo.
Bino moko bozali batatoli, Nzambe mpe azali Motatoli, ete totambolaki na bosantu, na bosembo mpe na kozanga pamela, na miso na bino oyo bozali kondima.
Boye, mokambi ya Lingomba asengeli kozala : moto azanga pamela, mobali ya mwasi moko, moto oyo alekisaka ndelo te na ezaleli na ye, moto oyo ayebi komikanga, moto ya lokumu, moto oyo ayambaka malamu bapaya kati na ndako na ye, moto oyo azali na makoki ya koteya,
Toyebi ete tosila kolongwa na kufa mpe tokoma na bomoi mpo ete tolingaka bandeko na biso. Moto oyo alingaka ndeko na ye te azali nanu na se ya bokonzi ya kufa.