Tito 1:16 - Mokanda na Bomoi16 Balobaka ete bayebi Nzambe, kasi bawanganaka Ye na nzela ya misala na bango, pamba te bazali nkele, batomboki mpe bazangi makoki ya kosala ata likambo moko ya malamu. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Pamba te biso mpe, na kala, tozalaki kosala makambo lokola bazoba, lokola bato bazanga botosi na miso ya Nzambe, lokola bato babunga nzela, lokola bawumbu ya lolenge nyonso ya baposa mpe ya bisengo. Na bomoi na biso, tozalaki kobika bomoi ya kosalaka mabe na bato mpe ya bilulela. Bato bayinaki biso, mpe tozalaki koyinana biso na biso.
Pamba te ezali na bato mosusu oyo basili kokota kati na bino na mayele mabe, ba-oyo etumbu na bango ekomama wuta kala : batosaka makambo ya Nzambe te, bakomisaka ngolu ya Nzambe na biso lokola nzela ya kosala makambo na bango ya soni, mpe bawanganaka Yesu-Klisto, Mokonzi kaka moko mpe Nkolo na biso.