Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Tito 1:14 - Mokanda na Bomoi

14 mpe balanda te masapo ya Bayuda to mibeko ya bato oyo baboyi solo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Tito 1:14
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nkolo alobi : « Bato oyo bapusanaka pene na Ngai kaka na monoko, bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezalaka mosika na Ngai ; mpe botosi oyo bazalaka na yango epai na Ngai ezali kaka mobeko ya bomoto, oyo bateyaki bango.


basambelaka Ngai kaka na pamba, mateya na bango ezali kaka mibeko ya bomoto. »


basambelaka Ngai kaka na pamba, mateya na bango ezali kaka mibeko ya bomoto. »


Kasi awa boyebi sik’oyo Nzambe to lokola sik’oyo Nzambe ayebi bino, ndenge nini bozongeli lisusu makambo oyo etambolisaka mokili, makambo oyo ezanga nguya mpe tina ? Bolingi lisusu komizongisa na se ya bowumbu na yango ?


Boni, biloko oyo nyonso ebongisami te mpo na kobebisama sima na kosalela yango ? Tala, ezali na yango kaka mibeko mpe malakisi ya bomoto !


bakoboya koyoka mateya ya solo mpe bakomipesa makasi na koyoka masapo.


pamba te osengeli koyeba ete moto ya ndenge wana abunga nzela, azali kosala masumu ; mpe na ndenge wana, amikateli ye moko etumbu.


Bosala penza keba ete boboya te koyoka Ye oyo alobaka ! Pamba te soki bato wana bazangaki te kozwa etumbu tango baboyaki koyoka Ye oyo azalaki kokebisa bango awa na mokili, ekozala ndenge nini mpo na biso soki toboyi koyoka Ye oyo akebisaka biso wuta na Likolo ?


Ezaleli na bango elongisi bosolo ya masese oyo : « Mbwa ezongelaka biloko oyo yango moko esanzi » mpe « Ngulu oyo basukoli ezongelaka kotambola kati na potopoto. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ