Pamba te, ezali na nzela na Ye nde tozalaka na bomoi, toninganaka mpe tozalaka oyo tozali, ndenge bakomi na bino mosusu baloba : « Tozali bana na ye ! »
bango nyonso, ezala Bayuda to bapaya oyo bakota na lingomba ya Bayuda : bato ya Kreti mpe ya Arabi, biso nyonso tozali koyoka bango kotatola misala minene ya Nzambe, na nkota na biso ya mboka ! »
Lokola mpe libongo ezalaki esika ya malamu te mpo na kolekisa tango ya malili makasi, mingi kati na bato bazwaki mokano ete tolongwa wana mpe toluka kokoma na Fenikisi oyo ezali libongo ya Kreti, oyo etala na ngambo ya sude-weste mpe ya nor-weste, mpo na kolekisa kuna tango yango ya malili makasi.
Wana mwa mopepe moko ya sude ekomaki kopepa, bakanisaki ete posa na bango ezali kokokisama ; boye batombolaki longo, mpe masuwa ekomaki kotambola pembeni-pembeni ya esanga ya Kreti.
Masuwa yango ezalaki kotambola malembe penza ; boye tosalaki mikolo mwa mingi ya mobembo, mpe tokomaki na Sinide na pasi penza. Lokola mpe mopepe ezalaki kopekisa biso kokende liboso, tolekaki Salimoni mpe tokendeki na ngambo ya sude ya esanga ya Kreti.
Bato ya lolenge oyo basalelaka nde mabumu na bango, kasi basalelaka Klisto, Nkolo na biso, te. Bapengwisaka makanisi ya bato ya bindima-ndima na nzela ya maloba na bango ya elengi mpe ya sukali.
Suka na bango ezali libebi ; pamba te nzambe na bango ezali libumu na bango, lokumu na bango ezali kati na makambo oyo eyokisaka bango soni, mpe makanisi na bango elukaka kaka biloko ya mokili.
Ezali bato ya bilongi mibale nde bakobanda kokosa bango na nzela ya mateya, pamba te mitema ya bato yango ya bilongi mibale ebeba lokola nde bazikisa yango na ebende ya moto.
Natikaki yo kati na Kreti mpo ete osilisa kobongisa makambo oyo etikalaki mpe opona bakambi ya Lingomba kati na engumba moko na moko, ndenge natindaki yo.