Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Sofoni 3:3 - Mokanda na Bomoi

3 Bakalaka na yango bazali lokola bankosi oyo ezali koganga ; bakambi na yango bazali lokola bambwa ya zamba oyo esalaka bokila na pokwa, bongo etikaka ata eloko moko te na tongo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Sofoni 3:3
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi mabe oyo azali kokamba bato bakelela azali lokola nkosi ya kanda to lokola ngombolo oyo ezali kolanda nyama ya kolia.


Bakambi na yo bazali batomboki, baninga ya miyibi ; bango nyonso balingaka kaka kanyaka mpe batonda na lokoso ya lifuti. Bakotelaka mwana etike te, mpe likambo ya mwasi oyo akufisa mobali etalaka bango te.


Koganga na bango ezali lokola koganga ya bankosi : bagangaka lokola bana nkosi, bagangaka soki bakangi nyama na bango, bamemaka yango na esika ya kimia, mpe moto moko te akokaka kobotola bango yango.


« Kasi yo, miso mpe motema na yo elukaka kaka bomengo mpo na bolamu na yo moko kaka, na nzela ya kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, na nzela ya konyokola bato mpe na nzela ya kobotola bango biloko. »


« Basakoli mpe Banganga-Nzambe, basundoli Nzambe ; ezala kati na Tempelo na Ngai, nazali komona misala na bango ya mabe, » elobi Yawe.


Bakambi ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bakalaka ya lokumu, Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya mokili, oyo batambolaki na kati-kati ya biteni ya mwana ngombe ya mobali,


Yango wana, nkosi moko ekobima wuta na zamba mpe ekoboma bango ; mbwa ya zamba ekobima wuta na esobe mpe ekopasola bango ; nkoyi moko ekovanda pene ya bingumba na bango mpo na koboma moto nyonso oyo akoluka kobima kuna, pamba te botomboki na bango ezali monene mpe lokuta na bango eleki mingi.


Tala ndenge bakambi ya Isalaele basalelaka bokonzi na bango mpo na kosopa makila.


Bozali kotia elikya na mopanga na bino, bozali kosala makambo ya mbindo, mpe moko na moko kati na bino azali kokomisa mbindo mwasi ya moninga na ye, mpe bozwa penza mokili lokola libula ! ›


Bampunda na bango ekimaka mbangu koleka ata nkoyi, ezalaka na kanda makasi koleka ata mbwa ya zamba oyo ebimaka na pokwa mpo na koluka nyama ya kolia. Basoda na bango oyo batambolaka likolo ya bampunda batambolaka mbangu makasi mpe bawutaka mosika penza, bapumbwaka lokola mpongo soki ezali kokita na elulu mpo na kokanga nyama ya kolia.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ