Kasi batosaki Yo te mpe batombokelaki Yo, bapesaki Mibeko na Yo mokongo, babomaki basakoli na Yo, oyo bazalaki koteya bango ete bazonga epai na Yo, mpe batiolaki Yo makasi na maloba na bango.
Mawa na bato oyo bazali kokende na Ejipito mpo na koluka lisungi, oyo bazali kotia mitema na bampunda, oyo bazali kotia elikya na bashar mpo ete ezali ebele, mpe na nguya ya basoda oyo batambolisaka yango, kasi batalelaka Mosantu ya Isalaele te mpe balukaka lisungi epai na Yawe te !
— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Kende koyebisa bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi : « Bokoki solo kozwa liteya te mpe kotosa maloba na Ngai te, » elobi Yawe ?
Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : « Boyoka ! Nakoyeisa na mokili ya Yuda mpe epai ya bavandi nyonso ya Yelusalemi pasi oyo nakataki ; pamba te nalobaki na bango kasi bayokaki Ngai te, nabengaki bango kasi bayanolaki Ngai te. »
Oh Yawe ; boni, miso na Yo esepelaka te komona bosolo ? Obetaka solo bato, kasi bayokaka na bango pasi te ; osilisaka koboma bango, kasi baboyaka kaka kobongwana. Bakomisa mito na bango makasi lokola mabanga mpe baboyaka kobongola mitema na bango.
Yelusalemi, mbindo na yo ezali kindumba. Nalukaki kokomisa yo peto, kasi olingaki kopetolama te na bosoto na yo. Okotikala lisusu kozala peto te kino tango nakosilisa kosopela yo kanda na Ngai.
Na bongo, topusana pene ya Nzambe na motema mobimba, na kondima nyonso, na motema oyo epetolami na makanisi nyonso ya mabe, mpe na nzoto oyo esukolami na mayi ya peto.