Sofoni 3:19 - Mokanda na Bomoi19 Na tango wana, nakobeta bato nyonso oyo banyokolaki yo, nakosunga moto oyo atambolaka tengu-tengu mpe nakosangisa bato oyo bapanzana bipai na bipai. Nakopesa bango lokumu mpe nakosala ete sango na bango epanzana na mikili nyonso epai wapi basambwisaki bango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye engumba oyo, Yelusalemi, ekosala lokumu, esengo, masanzoli mpe nkembo ya Kombo na Ngai liboso ya bikolo nyonso ya mabele, oyo ekoyoka sango ya makambo nyonso ya kitoko oyo nakosala mpo na yango. Bikolo yango ekokamwa mpe ekolenga na somo ya komona makambo nyonso ya kitoko mpe kimia oyo nakopesa na engumba yango. ›