Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Sofoni 3:17 - Mokanda na Bomoi

17 Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo, azali Elombe Mobikisi. Akosepela na yo makasi mpe akopemisa yo, na bolingo na Ye ; akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Sofoni 3:17
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe atalaki biloko nyonso oyo akelaki mpe amonaki ete ezali malamu koleka. Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya motoba.


Tango Abrami akokisaki mibu tuku libwa na libwa ya mbotama, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Tambola liboso na Ngai mpe zala moto azanga pamela.


Boni, ezali na eloko oyo Yawe akoki kolembana ? Na mobu oyo ezali koya, na tango oyo ekatama, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara akozala na mwana mobali.


Na mokolo ya sambo, Nzambe asilisaki mosala oyo asalaki. Boye, na mokolo ya sambo, akataki mosala nyonso oyo azalaki kosala.


kasi Yawe asepelaka na bato oyo batosaka Ye, ba-oyo batielaka bolingo na Ye motema.


Pamba te Yawe asepelaka na bato na Ye, alatisaka babola motole ya elonga.


Nkolo alamukaki lokola moto oyo awuti na pongi, lokola moto oyo abimi na kwiti ya vino ;


Solo, Nzambe azali lobiko na ngai ; nakotia elikya na ngai epai na Ye mpe nakobanga lisusu te. Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ; azali lobiko na ngai. »


Bino bato ya Siona, bobeta milolo mpe boyemba loyembo na esengo, pamba te Mosantu ya Isalaele azali monene kati na bino ! »


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na ngai : « Nakovanda kimia mpe nakotala wuta na ndako na Ngai, lokola kongala ya moyi to lokola mapata na tango ya molunge. »


Azali nani, ye oyo awuti na Edomi, na Botsira, na bilamba ya motane ? Azali nani, ye oyo alati bilamba ya lokumu, oyo azali kotambola lokola elombe, mpo ayebi ete azalaka makasi ? « Ezali nde Ngai ; nakataka makambo na bosembo, natonda na nguya mpo na kobikisa. »


Ye oyo atindaki ete loboko na Ye ya nkembo ezala elongo na loboko ya mobali ya Moyize, Ye oyo akabolaki mayi ya ebale monene liboso na bango mpo na kopesa Kombo na Ye lokumu mpo na libela ;


Bongo nakosepela mpo na Yelusalemi mpe mpo na bato na Ngai ; makelele ya kolela mpe ya koganga ekoyokana lisusu kuna te.


Bokonzi na ye ekokende mosika penza, mpe kimia na ye ekozala na suka te. Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi, akozala mokonzi ya mokili na ye, akolendisa mpe akokamba yango na bosembo mpe na boyengebene, wuta na tango oyo kino libela na libela. Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akosala na bolingo makasi na Ye.


Nakosepela kosalela bango bolamu mpe nakolona bango penza kati na mokili oyo, na motema mpe na molimo na Ngai mobimba. ›


Asiri akokoka kobikisa biso te ; tokomata na mpunda ya bitumba te mpe tokoloba lisusu te na misala ya maboko na biso : ‹ Bozali banzambe na biso, › pamba te ezali Yo, Yawe, nde oyokelaka mwana etike mawa. »


Oh mabele, kobanga te, zala na esengo mpe sepela, pamba te Yawe asali makambo minene.


Yawe alongoli etumbu na yo mpe akimisi banguna na yo. Yawe, Mokonzi ya Isalaele, azali elongo na yo ; kobanga lisusu pasi moko te.


Kati na engumba yango, Yawe azali sembo, asalaka mabe te ; mokolo na mokolo, alakisaka bosembo na Ye mpe azangaka te kokokisa yango tongo na tongo. Nzokande, moto oyo atambolaka na bosembo te amonaka likambo ya soni te.


Soki tozwi ngolu na miso ya Yawe, akokamba biso kino na mokili yango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mpe akopesa biso yango.


Kasi tosengelaki kaka kosala feti mpe kosepela, pamba te ndeko na yo, oyo ozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! »


Liboso ete feti ya Pasika ekoma, Yesu ayebaki ete tango na Ye ekoki mpo na kotika mokili oyo mpe kokende epai ya Tata. Lokola azalaki kolinga bato na Ye, oyo bazalaki kati na mokili, akobaki kolinga bango kino na suka.


Nalobi na bino makambo oyo nyonso mpo ete esengo na Ngai ezala kati na bino, mpe esengo na bino ezala ya kokoka.


Pamba te Yawe, Nzambe na bino, atambolaka kati na molako na bino mpo na kobatela bino mpe kokangola bino na maboko ya banguna na bino. Molako na bino esengeli kozala bule mpo ete akoka komona te eloko moko ya mbindo kati na bino mpe apesa bino mokongo te.


Bongo Yawe, Nzambe na bino, akosala ete bomona bolamu kati na misala nyonso ya maboko na bino, mpe akopesa bino bana ebele, bibwele ebele mpe bambuma ebele kati na mokili na bino. Yawe akosepela na bino lisusu mpe akosalela bino bolamu, ndenge kaka asepelaki na bakoko na bino,


Yango wana azali na makoki ya kobikisa libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ