Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Sofoni 3:16 - Mokanda na Bomoi

16 Na mokolo wana, bakoloba na Yelusalemi : ‹ Oh Siona, kobanga te ! Tika ete maboko na yo elemba te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Sofoni 3:16
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kanisa nanu ndenge ozalaki koteya bato ebele, ndenge ozalaki kolendisa bato oyo balembaki !


Na mokolo wana, bakoloba : « Solo, Oyo azali penza Nzambe na biso ! Totiaki mitema epai na Ye mpe abikisi biso. Oyo azali solo Yawe, totiaki mitema epai na Ye ; tika ete tosepela mpe tozala na esengo mpo na lobiko oyo apesi biso ! »


Mata likolo ya ngomba, Siona, yo momemi sango malamu ; tombola mongongo na yo mpe ganga makasi, Yelusalemi, yo momemi sango malamu ; tombola yango penza, kobanga te ; loba na bingumba ya Yuda : « Botala Nzambe na bino ! »


Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.


Tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo asalaki yo, abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yo mpe asungaka yo : Oh Jakobi, mowumbu na Ngai, kobanga te ; yo, Yeshuruni, oyo naponaki.


Kobanga te, pamba te okoyoka lisusu soni te ! Kozala na mawa te, pamba te okotiolama lisusu te ! Okobosana soni ya bolenge na yo mpe okokanisa lisusu te pasi na yo ya kokufisa mobali ;


Oh mabele, kobanga te, zala na esengo mpe sepela, pamba te Yawe asali makambo minene.


Libota ya Yuda mpe libota ya Isalaele, bobanga ata eloko moko te, boyika kaka mpiko ; pamba te ndenge bokomaki bikolo elakelama mabe kati na bikolo mosusu, ndenge wana mpe nakobikisa bino, mpe bokozala lipamboli. »


« ndenge wana mpe nazwi mokano sik’oyo ya komonisa lisusu bolamu na Yelusalemi mpe na Yuda. Bozala na bobangi te.


Mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo bayaki na Yelusalemi mpo na feti ya Pasika bayokaki sango ete Yesu mpe azali kokende kuna na Yelusalemi.


Boye, lokola yango nde lotomo oyo Nzambe apesaki biso na mawa na Ye, tobungisaka elikya te ;


Tosalaka bolamu ; tolembisa nzoto na biso te mpo na yango, pamba te tokobuka mbuma na tango oyo esengeli soki toyiki mpiko.


Lisusu, nazali kosenga na bino ete bobungisa mpiko na bino te likolo ya pasi oyo ngai nazali komona mpo na bino, pamba te ezali nde nkembo na bino.


Yango wana, bolendisa maboko na bino, oyo ebandi kolemba mpe bokembisa mabolongo na bino, oyo ekomi kolenga.


Nayebi malamu ete ozali na molende mpe oyokaki pasi makasi mpo na Kombo na Ngai, kasi olembaki te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ