Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Sofoni 3:10 - Mokanda na Bomoi

10 Longwa na likolo ya bibale ya Kushi, bato na Ngai, oyo bagumbamelaka Ngai ; bato na Ngai, oyo bapalangana bipai na bipai, bakomemela Ngai makabo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Sofoni 3:10
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

bengana ngando oyo ebombami kati na matiti, lisanga ya bangombe ya mibali elongo na bana ngombe ya bikolo oyo batambolaka kati na mbongo ya bibende ya palata, mpe panza bikolo oyo basepelaka na bitumba.


Na mokolo wana, Nkolo akosembola loboko na Ye na mbala ya mibale mpo na kobikisa ndambo ya bato na Ye oyo babikaki wuta na Asiri, na Ejipito, na Patrosi, na Kushi, na Elami, na Shineari, na Amati mpe na bisanga ya ebale monene.


Akotombola bendele mpo na bikolo mpe akosangisa bana ya Isalaele oyo bazali na bowumbu ; akosangisa esika moko bato ya Yuda oyo bapalangana na mokili mobimba.


Mawa na mokili oyo ezali na bamasuwa oyo ezalaka na bavwale lokola mabanki, bongo enanaka na ebale ya Kushi !


Na tango wana, bakomema bakado epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, wuta epai ya ekolo ya bato milayi oyo poso ya nzoto na bango engengaka, wuta epai ya ekolo ya bato oyo babangisaka na mosika, bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango, mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango, bakomema bakado yango na ngomba Siona, esika oyo Kombo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezalaka.


Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Bayuda balobanaki bango na bango : — Asengeli kokende wapi mpo ete tomona ye lisusu te ? Akokende epai ya Bayuda oyo bapalangana kati na Bagreki mpe koteya Bagreki ?


Sima na ngai kosala mibu ebele na libanda ya Yelusalemi, nazongaki na mboka na ngai mpo na komemela bato bakelela ya ekolo na ngai lisungi, mpe mpo na kobonzela Nzambe makabo.


Boye, Filipo atelemaki mpe akendeki ; na nzela, akutanaki na soda moko oyo baboma mokongo, moto ya mboka Etiopi ; azalaki kalaka moko ya lokumu mpe azalaki na mokumba ya kobatela bomengo nyonso ya Kandase, mwasi mokonzi ya Etiopi. Moto yango ayaki na Yelusalemi mpo na kogumbamela ;


ya kozala mosali ya Yesu-Klisto mpo na Bapagano. Boye abulisi ngai mpo na kosakola Sango Malamu ya Nzambe mpo ete Bapagano bakoma likabo oyo ekosepelisa Nzambe, likabo oyo Molimo Mosantu abulisi.


Ngai Petelo, ntoma ya Yesu-Klisto ; Epai ya baponami ya Nzambe oyo bazali kati na bamboka ya bapaya mpe bapalangani na bituka ya Ponti, ya Galatia, ya Kapadose, ya Azia mpe ya Bitini.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ