Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Sofoni 3:1 - Mokanda na Bomoi

1 Mawa na engumba ya batomboki, engumba ya makambo ya mbindo, mpe engumba oyo enyokolaka bato !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Sofoni 3:1
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na yango, tala liloba oyo Mosantu ya Isalaele alobi : « Lokola bobwaki maloba oyo, lokola bokangami na monyokoli mpe na mokosi oyo bozali kotiela motema,


Nzokande, elanga ya vino ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezali nde libota ya Isalaele, mpe bato ya Yuda bazali elanga oyo ezalaki kosepelisa Ye. Azalaki kozela bosembo, kasi amonaki nde makila ; makambo ya alima, kasi ayokaki nde kolela ya pasi.


kotomboka mpe kowangana Yawe, kopesa Nzambe na biso mokongo, kosala mabongisi ya konyokola bato mpe kotombokisa bato, kokana na motema mpe koloba maloba ya lokuta.


Basinga ya lifofe ekokoma bilamba te, misala na bango ekobomba bango te ; misala na bango ezali misala mabe, mpe misala ya mobulu nde ezalaka na maboko na bango.


« Kasi yo, miso mpe motema na yo elukaka kaka bomengo mpo na bolamu na yo moko kaka, na nzela ya kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, na nzela ya konyokola bato mpe na nzela ya kobotola bango biloko. »


Kasi bato oyo bazali mitema makasi mpe bazali solo batomboki ; bapesi Ngai mokongo mpe bakei na bango !


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokata banzete mpe botonga bisika ya kobombama zingazinga ya Yelusalemi ! Engumba oyo esengeli kozwa etumbu, pamba te etondi na makambo mabe !


Ndenge libulu ya mayi ebimisaka mayi, ndenge wana mpe Yelusalemi ezali kobimisa mabe. Sango moko kaka ezali kotambola kuna : sango ya mobulu mpe ya kobebisama ; tango nyonso liboso na Ngai, kaka minyoko mpe bapota.


Bato ya mokili bazali koyiba mpe kobotola bato biloko na makasi, bazali konyokola mobola mpe moto oyo akelela, bazali komonisa mopaya pasi na nzela ya kopimela ye bosembo.


Kati na mboka na yo, batiolaka batata mpe bamama, banyokolaka mopaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali.


nde ememelaki yo makambo oyo ekomeli yo, pamba te okufelaki kolinga mibali ya bikolo wana mpe omikomisaki mbindo na nzela ya kosalela banzambe na bango ya bikeko.


Akolongola eloko oyo ezalaka na kingo mpe bansala na yango nyonso ; akobwaka yango na ngambo ya este ya etumbelo, na esika oyo batiaka putulu ya moto.


Bosakola makambo oyo kati na bandako ya Asidodi mpe ya Ejipito : ‹ Bosangana na likolo ya bangomba ya Samari mpe botala ndenge nini mobulu mpe minyoko ezali kosalema kati na yango !


Bino bangombe ya basi ya Bashani, boyoka maloba oyo ; bozali lokola ngomba ya Samari, bino bato oyo bonyokolaka babola, bomonisaka bato bakelela pasi mpe bolobaka na mibali na bino : « Bomemela biso masanga mpo tomela. »


Soki baluli bilanga ya moto, bazwaka yango na makasi ; soki baluli ndako ya moto, babotolaka yango ; bakangaka mokolo ndako mpe biloko na ye ya ndako mpe babotolaka moto libula na ye.


Bonyokolaka te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike to mopaya to mpe mobola, mpe tika ete moko te kati na bino asala, na motema na ye, mabongisi ya kosala moninga na ye mabe. »


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ