3 Boluka Yawe, bino bato nyonso ya komikitisa kati na mokili, bino oyo bokokisaka mitindo na Ye ! Boluka kotambola na bosembo mpe na komikitisa ! Tango mosusu bokobika na mokolo ya kanda ya Yawe.
Boboto na Yo ezali penza monene, boboto oyo obombaka mpo na bato oyo batosaka Yo, boboto oyo otalisaka epai ya bato oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango, na miso ya bato nyonso.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na nzembo « Koboma te. » Nzembo ya Davidi, tango Saulo azalaki kolanda ye, mpe tango Davidi abombamaki kati na libulu.
Bokoloba na bango : ‹ Ezali mbeka ya feti ya Pasika mpo na Yawe oyo alekaki bandako ya bana ya Isalaele kati na Ejipito mpe abikisaki bandako na biso tango abomaki bato ya Ejipito. › » Na bongo, bana ya Isalaele bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe.
kasi akokata makambo ya bato bakelela na bosembo mpe akozwa mikano ya sembo mpo na babola ya mokili. Akobeta mokili fimbu na maloba na ye mpe akoboma bato mabe na pema ya monoko na ye.
Boni, olingi koluka makambo minene mpo na yo moko ? Te ! Koluka yango te ! Pamba te nakomemela bato nyonso pasi, elobi Yawe, kasi nakobikisa yo na bisika nyonso oyo okokende. › »
Bomataki te na mir mpo na kobamba madusu mpe kozingela libota ya Isalaele na mir zingazinga mpo na kobatela yango na tango ya bitumba, na mokolo ya Yawe.
Bolona bosembo mpo na bino moko mpe bokobuka mbuma ya bolingo ya solo. Bomikatela bilanga ya sika, pamba te tango ya koluka Yawe ekoki kino tango akoya kosopela bino bosembo.
Lolendo ya Isalaele ezali kofunda ye, kasi azali komona nyonso wana pamba : azongeli te Yawe, Nzambe na ye ; mpe atako bongo, azali kaka koluka Ye te !
« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Mikolo ya kokila bilei ya sanza ya minei, ya mitano, ya sambo mpe ya zomi ekokoma mikolo ya esengo mpe ya kosepela, ekokoma bafeti ya nkembo mpe ya esengo mpo na libota ya Yuda. Kasi bolinga solo mpe kimia. »
Bandeko, mpo na oyo etali makambo mosusu, tolakisaki bino ndenge nini bosengeli kotambola mpo na kosepelisa Nzambe, mpe yango nde bozali kosala. Kasi sik’oyo, tozali kosenga na bino mpe kotinda bino na makasi, kati na Nkolo Yesu, ete bokoba kosalaka bongo koleka.
Ezali mpe bolingo yango nde bosengeli kotalisa epai ya bandeko nyonso kati na Masedwane mobimba. Mpe bandeko, tozali kosenga na bino ete bokoba kosalaka bongo koleka,
kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela ! Amen !