Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Sofoni 2:2 - Mokanda na Bomoi

2 liboso ete mokolo oyo ekatama mpo na kosambisama ekoka, liboso ete mokolo yango eleka lokola matiti ya loso oyo mopepe ememi, mpe liboso ete kanda mpe kotomboka ya Yawe ekomela bino !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Sofoni 2:2
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo nini mopepe makasi ekomema bango lokola makasa to matiti ya kokawuka ?


Kasi ezali bongo te mpo na bato mabe ! Bazali lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe epanzaka.


Bopesa Mwana na Ye beze, noki te akosilika mpe bokokufa na nzela na bino, pamba te kanda na Ye epelaka noki. Esengo na bato oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.


Bino bato oyo bozali kobosana Nzambe, nabondeli bino : bososola makambo oyo ; noki te nakobebisa bino, mpe moto moko te akokangola bino.


Ata bato ya bikolo bazali koganga lokola makelele ya mayi ya bibale minene, bakimaka penza mosika tango Yawe apamelaka bango ; bakimaka lokola matiti na bangomba na tango ya mopepe, lokola putulu na tango ya mopepe makasi.


Kanda ya Yawe ekokita te kino ekokokisa malamu-malamu penza mabongisi ya motema na Ye ! Bokozwa mayele ya kososola yango malamu na mikolo oyo ekoya.


Bomibulisa mpo na Yawe, bopetola mitema na bino, bino bato ya Yuda mpe bato ya Yelusalemi ; noki te kanda na Ngai ekopela mpe ekozikisa bino lokola moto mpo na mabe oyo bozali kosala ; ekopela makasi mpe moto moko te akokoka koboma yango.


Yawe asilikaki makasi koleka ; asopaki kanda na Ye mpe apelisaki moto kati na Siona, moto oyo ezikisaki miboko na yango.


Kasi Ngai Yawe, nakoloba maloba oyo nalingi koloba, mpe maloba yango ekokokisama na mwa tango moke ; pamba te kaka na tango oyo bozali na bomoi, bino libota ya batomboki, Ngai nakokokisa maloba nyonso oyo nakoloba, elobi Nkolo Yawe. › »


Mpo na yango, bakozala lokola lipata ya tongo, lokola londende ya tongo oyo elimwaka, lokola lititi oyo mopepe ememaka mosika na esika oyo batutelaka ble, mpe lokola molinga oyo ebimaka na lidusu.


Nani akoki solo kotelema liboso na Ye soki asiliki ? Nani akoki solo kobika soki kanda na Ye epeli ? Mpo ete kanda na Ye epanzanaka lokola moto, bongo mabanga ebukanaka liboso na Ye.


Na mokolo ya kanda na Yawe, ezala palata to wolo na bango ekobikisa bango te. Na moto ya zuwa na Ye, mokili mobimba ekozikisama, pamba te akosukisa na mbalakata bavandi nyonso ya mokili.


Yango wana, « bozela Ngai, » elobi Yawe, « bozela Ngai na mokolo oyo nakoya mpo na kosamba elongo na bino ; nazwaki mokano ya kosangisa bato ya bikolo nyonso mpe ya mikili nyonso mpo na kosopela bango kanda na Ngai, makasi nyonso penza ya kanda na Ngai : mokili mobimba ekozika na moto ya nguya ya kanda na Ngai.


Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ