Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Sofoni 2:15 - Mokanda na Bomoi

15 Tala ndenge ekosuka, engumba oyo ya bisengo, oyo ezalaki na kimia koleka mpe ezalaki komilobela : « Ezali nde ngai, mosusu azali te soki ngai te. » Ndenge nini engumba oyo ebebisami, ndenge nini ekomi penza ndako ya banyama ! Bato nyonso oyo bakolekela wana bakobeta piololo mpe koningisa mito.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Sofoni 2:15
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ngai mpe nakokaki koloba lokola bino, soki bozalaki na esika na ngai, nakokaki kobimisa maloba ebele mpe koningisa moto mpo na bino.


Bakobetela libebi na ye maboko, mpe bakotiola ye na piololo wuta na ndako na ye moko. »


Oh engumba etonda na loyenge, engumba etonda na makelele mpe na bisengo ! Bibembe na yo ekufi na mopanga te to mpe na bitumba te.


Bolenga, bino basi oyo bovandaka na kimia ; boningana, bino bilenge basi oyo bomitungisaka na eloko moko te ! Bolongola bilamba na bino mpe botikala bolumbu, bolata basaki na loketo na bino !


pamba te basundoli ndako ya mokonzi ; engumba oyo etonda makelele etikali lisusu na bato te, Ofeli mpe ndako molayi ya bakengeli ekomi mpo na libela mabulu ya mabanga mpo na bisengo ya ba-ane ya zamba, mpe ekokoma etando epai wapi bibwele ekobanda kolia matiti,


Bino basi oyo bovandaka na kimia, botelema mpe boyoka ngai ; bino bilenge basi oyo bomitungisaka na eloko moko te, boyoka makambo oyo nalingi koloba :


Otiaki elikya na makambo na yo ya mabe, olobaki : « Moto moko te azali komona ngai ! » Bwanya mpe mayele na yo epengwisaki yo tango ozalaki komilobela : « Ngai nde nazali, mosusu azali te ! »


Mokili na bango ekotikala lisusu na bato te, ekokoma eloko ya kotiola mpo na tango nyonso, bongo bato nyonso oyo bakoleka wana bakokamwa mpe bakoningisa mito na bango.


Nakobebisa engumba oyo mpe nakokomisa yango eloko ya kotiola. Bato nyonso oyo bakolekela awa bakokamwa mpe bakoyoka somo wana bakomona kobeba na yango nyonso.


Likolo ya kanda ya Yawe, bato bakovanda lisusu na Babiloni te mpo ete ekobebisama nye. Bato nyonso oyo bakoleka na Babiloni bakokamwa mpe bakozala na somo ya komona bapota na yango nyonso.


Tala ndenge nini engumba oyo, na kala, ezalaki na bato ebele penza, etikali lisusu na bato te ! Tala ndenge nini engumba oyo ezalaki na lokumu kati na bikolo ekomi lelo lokola mwasi akufisa mobali ; oyo ezalaki engumba mokonzi ekomi lelo na bowumbu !


Tala ndenge nini Nkolo azipi Siona, mboka kitoko, na lipata ya kanda na Ye : akweyisi lokumu ya Isalaele, wuta na likolo kino na se ; na mokolo ya kanda na Ye, abosanaki enyatelo makolo na Ye !


Bato nyonso oyo bolekelaka na nzela na yo bazali kobeta maboko na kokamwa, bazali kobeta piololo mpe koningisa mito mpo na Yelusalemi, mboka kitoko : « Boni, ezali solo engumba oyo bazalaki kobenga kitoko ekoka mpe esengo ya mokili mobimba ? »


Bato ya mombongo ya bikolo mosusu bakomi koseka mpe kowolola yo : Osuki eh ! Osuki ! Okotikala kozala lisusu te ! › »


« Mwana na moto, loba na mokambi ya Tiri : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na lolendo ya motema na yo, olobaki : ‘ Nazali nzambe, navandaka na kiti ya bokonzi ya nzambe na kati-kati ya bibale minene. ’ Nzokande, ozali na yo kaka moto, ozali na yo nzambe te atako okanisi ete ozali na bwanya lokola nzambe.


Okokoka lisusu koloba liboso ya bato oyo bazali koboma yo : ‘ Ngai nazali nzambe ? ’ Ozali na yo kaka moto ; ozali nzambe te, kati na maboko ya bato oyo bazali koboma yo.


Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Yo Faraon, mokonzi ya Ejipito, natelemeli yo ! Yo dalagona monene oyo ovandaka kati na bibale na yo, yo oyo ozali koloba : ‘ Ebale Nili ezali ya ngai ; mpe ngai, ngai moko nde namisala ! ’


amilobelaki : « Boni ! Oyo ezali te Babiloni monene oyo natongaki lokola ndako ya mokonzi, na makasi na ngai, na nguya na ngai mpe mpo na lokumu ya bokonzi na ngai ? »


Ezali ata na kisi moko te oyo ekoki kobikisa pota na yo ; pota na yo ezali monene makasi ! Moto nyonso oyo akoyoka sango ya makambo oyo ekomeli yo akobeta maboko mpo na kokweyisama na yo. Pamba te nani oyo ozangaki kosala mabe ?


Bazali bato ya somo mpe bato oyo babangisaka, basalaka makambo nyonso oyo bazali na yango posa, mpe moto moko te amekaka kotelemela bango.


Baleki nzela bazalaki kofinga Ye na koningisa mito na bango ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ