Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Sofoni 2:14 - Mokanda na Bomoi

14 Ekokoma esika oyo bitonga mpe banyama ya ndenge na ndenge ekokoma kolala. Esulungutu mpe kombekombe ekokoma kolekisa butu na yango na basonge ya bandako na yango. Kolela na yango ekoyokana kino na maninisa, libebi na libebi nde ekomonana na bikotelo ya bandako, mpe mabaya ya banzete ya sedele ekotikala polele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Sofoni 2:14
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo ete naleli makasi, natikali kaka na poso ya nzoto likolo ya mikuwa.


Nakokomisa yango esika ya potopoto mpe lopango ya bampuku ; mpe nakokombola yango na nzela ya ekombelo ya libebi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


oyo alobaka : ‹ Nakotongisa ndako monene oyo ekozala na bashambre minene, na etaje ! › Boye atiaka yango maninisa minene, mabaya ya sedele na bamir na yango ya kati mpe akopakolaka yango langi ya motane.


Namonaki Yawe atelemi pene ya etumbelo, mpe alobaki : « Buka makonzi ya Tempelo mpo ete ndako mobimba eningana mpe ekweyela bato nyonso na mito. Bato oyo bakotikala, nakoboma bango na mopanga. Moko te akokima, moko te akobika.


Etuka oyo ezali pembeni ya ebale monene, epai wapi bato ya Kreti bavandaka, ekokoma esika ya babateli bibwele mpe lopango ya kobokola bibwele.


Agangaki na mongongo makasi : « Ekweyi ! Ekweyi ! Babiloni monene ekweyi penza ! Ekomi ndako ya milimo mabe, ebombamelo ya milimo nyonso ya mbindo, ya bandeke ya mbindo mpe ya banyama ya nkele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ