Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Sofoni 2:13 - Mokanda na Bomoi

13 Akosembola loboko na Ye mpo na kobundisa etuka ya nor, akobebisa Asiri akobebisa penza Ninive mobimba mpe akokawusa yango lokola esobe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Sofoni 2:13
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Yawe akosilisa mosala na Ye ya kotelemela ngomba Siona mpe Yelusalemi, akoloba : « Nakopesa etumbu na mokonzi ya Asiri mpo na lolendo ya motema na ye mpe mpo na lofundu ya etaleli na ye.


Yango wana Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akotindela basoda na ye ya mbinga bokono oyo ekondisaka nzoto. Na se ya nkembo na Ye, bakopelisa moto lokola fulu ya moto.


Mawa na Asiri, lingenda ya kanda na Ngai ; nzete oyo ezali na loboko na ye ezali nde esalelo ya kanda na Ngai !


Na mokolo wana, Nkolo akosembola loboko na Ye na mbala ya mibale mpo na kobikisa ndambo ya bato na Ye oyo babikaki wuta na Asiri, na Ejipito, na Patrosi, na Kushi, na Elami, na Shineari, na Amati mpe na bisanga ya ebale monene.


Yango nde mokano oyo Yawe asili kozwa mpo na mokili mobimba, mpe yango nde loboko oyo asili kosembola mpo na kotelemela bikolo nyonso.


Boye, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, alongolaki molako, azongaki na Ninive mpe akomaki kovanda kuna.


« Atsori ekokoma esika oyo mbwa ya zamba evandaka, esika oyo etikala pamba mpo na libela : moto moko te akovanda lisusu kuna mpe moto moko te akowumela lisusu kati na yango. »


— Telema, kende na Ninive, engumba monene, mpe kebisa bato na yango, pamba te mabe na bango ekomi kino epai na ngai.


— Telema, kende na Ninive, engumba monene, mpe sakola kuna maloba oyo nakopesa yo.


Batikali ya Jakobi bakozala, kati na bikolo ebele lokola mamwe oyo ewuti epai na Yawe, mpe na likolo ya matiti lokola londende oyo ekweyaka na makasi ya moto te to mpe etalelaka moto te.


Lisakoli na tina na engumba Ninive. Buku ya emoniseli ya Naumi, moto ya engumba Elikoshi.


Kuna nde moto ekoya kozikisa yo, mopanga ekoya koboma yo mpe kosilisa yo lokola mabanki. Tika ete bato na yo bakoma ebele lokola mabanki, bakoma lisusu ebele makasi lokola mankoko.


Bato nyonso oyo bakomona yo bakokima mpe bakoganga : ‹ Engumba Ninive ebebisami boye ! Nani akoyokela yango mawa ? › »


« Nakosembola loboko na Ngai mpo na kopesa mokili ya Yuda mpe bavandi nyonso ya Yelusalemi etumbu ; nakosilisa koboma, na esika oyo, nyonso oyo etikali, ya losambo ya nzambe Bala elongo na bakombo ya banganga-nzambe ya bapagano, oyo basalelaka banzambe ya bikeko :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ