Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‹ Kino tango nini okoboya komikitisa liboso na Ngai ? Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
Toyokaki sango ya lolendo ya Moabi, ndenge atombolaka mapeka : lolendo na ye oyo eleka ndelo mpe lofundu na ye, lolendo mpe maloba na ye ya lofundu ezanga na yango tina.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakobengana bato mabe oyo bavandaka zingazinga ya ekolo na Ngai, oyo bazali kobundisa libula oyo napesaki bato na Ngai, Isalaele, mpe nakolongola ekolo ya Yuda kati na bango.
Toyokaki sango ya lolendo ya Moabi, lolendo oyo eleka penza ndelo ! Tala ndenge amatisaka mapeka ! Atondi na lofundu, azali na monoko makasi, mpe motema na ye emikitisaka te.
Mbindo na ye ekangami ye na elamba, ayebaki te makambo nini ekokomela ye na sima. Tala ye wana akweyi, bongo kokweya na ye ezali kokamwisa ; moto oyo akolendisa ye azali te ! « Oh Yawe, tala pasi na ngai, pamba te monguna alongi ngai ! »
Ozalaki kotala kaka bongo tango bato mosusu bazalaki kokende mpe komema bozwi na ye nyonso. Mpe tango bapaya bakotaki kati na engumba na ye, babetaki zeke mpo na kokabola bomengo ya bitumba ya Yelusalemi. Yo mpe osalaki kaka lokola bango.
Lolendo ya motema na yo ekosaki yo, yo movandi ya madusu ya mabanga, yo oyo otonga ndako na yo na basonge ya bangomba mpe omilobelaka : ‹ Nani akokweyisa ngai na se ? ›
Ndenge moko mpe, bino bilenge, botosaka bakambi na bino ya Lingomba, bolata komikitisa kati na bino, pamba te Makomi elobi : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »